< Banzembo 70 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe. Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai! Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai!
For the leader. Of David. For commemoration. Quickly, God, deliver me, hasten to help me, Lord.
2 Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai bakufa soni mpe basambwa! Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai bazonga sima mpe bayokisama soni!
May those who are seeking my life, be ashamed and confounded.
3 Tika ete bato oyo balobaka na ngai: « Ah! Ah! » bazonga mpo na soni!
May those who delight in my hurt be defeated and brought to dishonour.
4 Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso: « Nzambe azali monene! »
But may all who seek after you rejoice and be glad in you. May all who love your salvation say, ‘Glory to God,’ evermore.
5 Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela, Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai. Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai, kowumela te!
I am weak and needy: make haste, God, to me. You are my help and deliverer; Lord, don’t delay.

< Banzembo 70 >