< Banzembo 7 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya mawa oyo Davidi ayembelaki Yawe na tina na Kushi, moto ya libota ya Benjame. Yawe, Nzambe na ngai, nabombamaka kati na Yo; bikisa ngai mpe kangola ngai liboso ya bato nyonso oyo balukaka koboma ngai.
A Shiggaion of David, which he sang to the LORD concerning the words of Cush, a Benjamite. O LORD my God, I take refuge in You; save me and deliver me from all my pursuers,
2 Soki te, bakopasola ngai lokola nkosi mpe bakokata ngai na biteni, mpe moto akozala te mpo na kosunga ngai.
or they will shred my soul like a lion and tear me to pieces with no one to rescue me.
3 Yawe, Nzambe na ngai, soki nasalaki makambo oyo bazali kopamela ngai mpo na yango, mpe soki ezali na mabe na maboko na ngai,
O LORD my God, if I have done this, if injustice is on my hands,
4 soki nasalaki moninga na ngai mabe, soki nabotolaki na makasi mpe kaka na pamba, biloko ya moyini na ngai;
if I have rewarded my ally with evil, if I have plundered my foe without cause,
5 wana tika ete monguna na ngai alanda mpe akanga ngai, tika ete asakanela bomoi na ngai mpe abebisa lokumu na ngai.
then may my enemy pursue me and overtake me; may he trample me to the ground and leave my honor in the dust.
6 Yawe, telema na kanda na Yo, telemela kotomboka ya banguna na ngai. Nzambe na ngai, telema, kata likambo na ngai.
Arise, O LORD, in Your anger; rise up against the fury of my enemies. Awake, my God, and ordain judgment.
7 Tika ete bikolo esangana zingazinga na Yo, kasi Yo, konza bango wuta na Kiti na Yo ya Bokonzi.
Let the assembled peoples gather around You; take Your seat over them on high.
8 Tika ete Yawe asambisa bikolo. Yawe, longisa ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bozangi pamela na ngai, Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
The LORD judges the peoples; vindicate me, O LORD, according to my righteousness and integrity.
9 Yo Nzambe ya sembo oyo ososolaka mozindo ya mayele mpe ya mitema, sukisa kanza ya bato mabe mpe yikisa moto ya sembo mpiko.
Put an end to the evil of the wicked, but establish the righteous, O righteous God who searches hearts and minds.
10 Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali nguba na ngai, abikisaka bato ya sembo.
My shield is with God, who saves the upright in heart.
11 Nzambe azali Mosambisi ya sembo, asilikaka mikolo nyonso.
God is a righteous judge and a God who feels indignation each day.
12 Soki alembisi kanda na Ye te, akopelisa minu ya mopanga na Ye, akobongisa mpe akobeta tolotolo na Ye.
If one does not repent, God will sharpen His sword; He has bent and strung His bow.
13 Abongisaka bibundeli oyo ebomaka mpe asalaka ete makonga na Ye ekoma kozikisa.
He has prepared His deadly weapons; He ordains His arrows with fire.
14 Moto nyonso oyo abongisaka kosala mabe alukaka ndenge nini koyokisa bato pasi mpe abebisaka boyokani;
Behold, the wicked man travails with evil; he conceives trouble and births falsehood.
15 atimolaka libulu, kasi ye moko nde akweyaka kati na yango.
He has dug a hole and hollowed it out; he has fallen into a pit of his own making.
16 Pasi oyo ayokisaka bato ezongelaka ye moko, mpe mabe na ye ekweyaka na moto na ye moko.
His trouble recoils on himself, and his violence falls on his own head.
17 Nakokumisa Yawe mpo na bosembo na Ye, mpe nakosanzola Yawe-Oyo-Aleki-Likolo na banzembo.
I will thank the LORD for His righteousness and sing praise to the name of the LORD Most High.