< Banzembo 69 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi: ezali ya koyemba lokola « lisi. » Nzambe, bikisa ngai, pamba te mayi ekomi na kingo na ngai.
For the choirmaster. To the tune of “Lilies.” Of David. Save me, O God, for the waters are up to my neck.
2 Nazali kozinda na potopoto, na mozindo makasi epai wapi eloko ya kosimba ezali te; nakiti na mozindo ya mayi, mbonge ememi ngai.
I have sunk into the miry depths, where there is no footing; I have drifted into deep waters, where the flood engulfs me.
3 Nalembi nzoto likolo ya kobelela lisungi; mongongo na ngai ekawuki, miso na ngai elembi mpo na kotalela Nzambe na ngai.
I am weary from my crying; my throat is parched. My eyes fail, looking for my God.
4 Bato oyo bayinaka ngai na kozanga tina bazali ebele koleka motango ya suki ya moto na ngai; ba-oyo balukaka kobebisa bomoi na ngai, oyo bazali banguna na ngai kaka pamba, bazali bato na nguya; bazali kosenga ngai na makasi ete nazongisa eloko oyo nayibaki te.
Those who hate me without cause outnumber the hairs of my head; many are those who would destroy me— my enemies for no reason. Though I did not steal, I must repay.
5 Nzambe, oyebi bozoba na ngai, mpe mabe na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.
You know my folly, O God, and my guilt is not hidden from You.
6 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, tika ete ba-oyo batiaka elikya kati na Yo basila lokumu te likolo na ngai! Nzambe ya Isalaele, tika ete bato oyo balukaka Yo bayokisama soni te likolo na ngai!
May those who hope in You not be ashamed through me, O Lord GOD of Hosts; may those who seek You not be dishonored through me, O God of Israel.
7 Pamba te nandimi kofingama mpo na Yo, mpe soni ezipi ngai elongi.
For I have endured scorn for Your sake, and shame has covered my face.
8 Bandeko na ngai bakomi kozwa ngai lokola moto oyo bayebi te, nakomi lokola mopaya na miso ya bana ya mama na ngai.
I have become a stranger to my brothers and a foreigner to my mother’s sons,
9 Pamba te bolingo oyo nazali na yango mpo na ndako na Yo ezali kozikisa ngai, mpe mafinga ya bato oyo bafingaka Yo ezali kokweya na moto na ngai.
because zeal for Your house has consumed me, and the insults of those who insult You have fallen on me.
10 Soki naleli mpe nakili bilei, nasengeli kaka kofingama;
I wept and fasted, but it brought me reproach.
11 soki nalati saki, bato basalaka masapo mpo na kotiola ngai.
I made sackcloth my clothing, and I was sport to them.
12 Bato oyo bavandi na ekuke batiolaka ngai, balangwi masanga bayembaka kombo na ngai kati na banzembo na bango.
Those who sit at the gate mock me, and I am the song of drunkards.
13 Yawe, nabondeli Yo! Nzambe, tango ekoki, tango ya kotalisa ngai bolingo monene na Yo! Yanola ngai na nzela ya boyengebene mpe lobiko na Yo!
But my prayer to You, O LORD, is for a time of favor. In Your abundant loving devotion, O God, answer me with Your sure salvation.
14 Bimisa ngai na potopoto, sala ete nazinda lisusu te, nakangolama wuta na maboko ya bayini na ngai mpe nabima na mayi ya mozindo!
Rescue me from the mire and do not let me sink; deliver me from my foes and out of the deep waters.
15 Tika ete mbonge ya mayi emema ngai lisusu te, mozindo emela lisusu ngai te, mpe libulu ekangamela ngai te!
Do not let the floods engulf me or the depths swallow me up; let not the Pit close its mouth over me.
16 Yawe, yanola ngai, pamba te bolingo na Yo ezali malamu; baluka epai na ngai, na mawa monene na Yo.
Answer me, O LORD, for Your loving devotion is good; turn to me in keeping with Your great compassion.
17 Kobombela lisusu mosali na Yo te elongi na Yo. Yanola ngai noki, pamba te nazali na pasi.
Hide not Your face from Your servant, for I am in distress. Answer me quickly!
18 Pusana pene na ngai, mpe sikola ngai; kangola ngai wuta na maboko ya bayini na ngai.
Draw near to my soul and redeem me; ransom me because of my foes.
19 Oyebi ndenge nini nazali kofingama, oyebi soni mpe kosambwa na ngai; banguna na ngai nyonso bazali liboso na Yo.
You know my reproach, my shame and disgrace. All my adversaries are before You.
20 Mafinga ezokisi motema na ngai, mpe pota yango ezali kosila te; nazelaki elembo ya mawa kowuta na bato, kasi namonaki yango te; nalukaki babondisi, kasi namonaki bango te.
Insults have broken my heart, and I am in despair. I looked for sympathy, but there was none, for comforters, but I found no one.
21 Batiaki ngenge kati na bilei na ngai, mpe bamelisaki ngai vino ya ngayi tango nayokaki posa ya mayi.
They poisoned my food with gall and gave me vinegar to quench my thirst.
22 Tika ete mesa na bango ekoma motambo liboso na bango, mpe kimia na bango ekoma monyama.
May their table become a snare; may it be a retribution and a trap.
23 Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te, mpe babela mikongo mpo na libela.
May their eyes be darkened so they cannot see, and their backs be bent forever.
24 Sopela bango kanda makasi na Yo, mpe tika ete kanda na Yo ya makasi ekanga bango.
Pour out Your wrath upon them, and let Your burning anger overtake them.
25 Tika ete molako na bango etikala polele, mpe ete moto moko te avanda na bandako na bango ya kapo.
May their place be deserted; let there be no one to dwell in their tents.
26 Pamba te bazali konyokola bato oyo ozokisaki, mpe bazali kopanza sango ya pasi ya bato oyo oyokisaki pasi.
For they persecute the one You struck and recount the pain of those You wounded.
27 Bakisa mabe na likolo ya mabe na bango, mpe kokota likambo na bango te na bosembo na Yo.
Add iniquity to their iniquity; let them not share in Your righteousness.
28 Tika ete bakombo na bango elongwa na buku ya bomoi, mpe batangama te na molongo ya bato ya sembo.
May they be blotted out of the Book of Life and not listed with the righteous.
29 Solo, nazali mobola mpe moto ya pasi; kasi lobiko na Yo, oh Nzambe, ebatelaka ngai.
But I am in pain and distress; let Your salvation protect me, O God.
30 Nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo ya Nzambe, mpe nakopesa Ye nkembo elongo na matondi.
I will praise God’s name in song and exalt Him with thanksgiving.
31 Yango nde ekosepelisa Yawe, koleka ngombe oyo ezali na maseke mpe na makolo ekabwana.
And this will please the LORD more than an ox, more than a bull with horns and hooves.
32 Babola bamoni mpe bazali kosepela. Tika ete mitema na bino oyo bolukaka Nzambe ezala na bomoi!
The humble will see and rejoice. You who seek God, let your hearts be revived!
33 Pamba te Yawe ayokaka bato oyo bakelela, mpe atiolaka bato na Ye te ata bazali bakangami kati na boloko.
For the LORD listens to the needy and does not despise His captive people.
34 Tika ete likolo mpe mabele, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekumisa Ye!
Let heaven and earth praise Him, the seas and everything that moves in them.
35 Pamba te Nzambe akobikisa Siona mpe akotonga lisusu bingumba ya Yuda. Bato bakovanda kuna mpe bakozwa yango lokola libula na bango.
For God will save Zion and rebuild the cities of Judah, that they may dwell there and possess it.
36 Bakitani ya basali na Ye bakozwa yango lokola libula, mpe bato oyo balingaka Kombo na Ye bakovanda kati na yango.
The descendants of His servants will inherit it, and those who love His name will settle in it.

< Banzembo 69 >