< Banzembo 68 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Loyembo. Soki Nzambe atelemi, banguna na Ye bapalanganaka, mpe bayini na Ye bakimaka mosika na Ye.
In finem. Psalmus cantici ipsi David. [Exsurgat Deus, et dissipentur inimici ejus; et fugiant qui oderunt eum a facie ejus.
2 Liboso ya Nzambe, bato mabe bakufaka, ndenge milinga elimwaka, mpe mafuta enyangwamaka na moto.
Sicut deficit fumus, deficiant; sicut fluit cera a facie ignis, sic pereant peccatores a facie Dei.
3 Liboso ya Nzambe, bato ya sembo basepelaka, batondaka na esengo.
Et justi epulentur, et exsultent in conspectu Dei, et delectentur in lætitia.
4 Boyembela Nzambe, boyemba banzembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye. Bofungola nzela mpo na Ye oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe. Kombo na Ye ezali Yawe. Botonda na esengo liboso na Ye.
Cantate Deo; psalmum dicite nomini ejus: iter facite ei qui ascendit super occasum. Dominus nomen illi; exsultate in conspectu ejus. Turbabuntur a facie ejus,
5 Kati na Ndako na Ye ya bule, Nzambe azali Tata ya bana bitike, mpe molobeli ya basi bakufisa mibali.
patris orphanorum, et judicis viduarum; Deus in loco sancto suo.
6 Nzambe apesaka libota epai ya bato oyo bavandaka bango moko, abimisaka bakangami wuta na minyololo; kasi batomboki batikalaka na mabele ekawuka.
Deus qui inhabitare facit unius moris in domo; qui educit vinctos in fortitudine, similiter eos qui exasperant, qui habitant in sepulchris.
7 Oh Nzambe, tango obimaki liboso ya bato na Yo, tango otambolaki na esobe,
Deus, cum egredereris in conspectu populi tui, cum pertransires in deserto,
8 mabele eninganaki, likolo mpe esopaki mayi liboso ya Nzambe, Nzambe ya Sinai; liboso ya Nzambe, Nzambe ya Isalaele.
terra mota est, etenim cæli distillaverunt, a facie Dei Sinai, a facie Dei Israël.
9 Nzambe, osopaki mvula ya mapamboli, olendisaki libula na Yo mpo ete elembaki.
Pluviam voluntariam segregabis, Deus, hæreditati tuæ; et infirmata est, tu vero perfecisti eam.
10 Oh Nzambe, bato na Yo bavandaka na mokili oyo obongisaki, na boboto na Yo, mpo na mobola.
Animalia tua habitabunt in ea; parasti in dulcedine tua pauperi, Deus.
11 Na liloba moko kowuta na Nkolo, basi oyo bamemaka sango basangani bato ebele,
Dominus dabit verbum evangelizantibus, virtute multa.
12 bakonzi ya mampinga bakimi, bapoti mbangu, mpe mwasi oyo atikali na ndako akaboli bomengo ya bitumba.
Rex virtutum dilecti, dilecti; et speciei domus dividere spolia.
13 Boni, bokokoba kolala pongi kati na bandako na bino? Mapapu ya ebenga ezipami na se ya palata, mpe bansala na yango ezipami na se ya wolo.
Si dormiatis inter medios cleros, pennæ columbæ deargentatæ, et posteriora dorsi ejus in pallore auri.
14 Tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abenganaki kuna bakonzi, anokisaki mvula ya pembe na ngomba Tsalimoni.
Dum discernit cælestis reges super eam, nive dealbabuntur in Selmon.
15 Ngomba ya Bashani, ngomba ya Nzambe; ngomba ya Bashani, ngomba ya basonge ebele,
Mons Dei, mons pinguis: mons coagulatus, mons pinguis.
16 mpo na nini ozali kosala zuwa, ngomba ya basonge ebele, ngomba oyo Nzambe asepelaka kovanda? Nzokande Yawe akovanda kuna libela na libela.
Ut quid suspicamini, montes coagulatos? mons in quo beneplacitum est Deo habitare in eo; etenim Dominus habitabit in finem.
17 Motango ya bashar ya Nzambe ezali ebele, koleka minkoko; Nkolo azali kati na yango, kuna na Sinai, kati na Esika ya bule.
Currus Dei decem millibus multiplex, millia lætantium; Dominus in eis in Sina, in sancto.
18 Yawe Nzambe, tango omataki na likolo, omemaki bakangami, ozwaki makabo epai ya bato, ata epai ya batomboki, mpo ete okoma kovanda kuna.
Ascendisti in altum, cepisti captivitatem, accepisti dona in hominibus; etenim non credentes inhabitare Dominum Deum.
19 Tika ete Nkolo akumisama, mokolo na mokolo! Nzambe Mobikisi na biso alataka makambo na biso.
Benedictus Dominus die quotidie: prosperum iter faciet nobis Deus salutarium nostrorum.
20 Mpo na biso, Nzambe yango azali Nzambe oyo abikisaka; mpe bikuke ya kufa ezali ya Nkolo Yawe.
Deus noster, Deus salvos faciendi; et Domini, Domini exitus mortis.
21 Solo, Nzambe apanzaka mito ya banguna na Ye, oyo batambolaka kati na bomoi ya masumu, oyo mito na bango etonda na suki.
Verumtamen Deus confringet capita inimicorum suorum, verticem capilli perambulantium in delictis suis.
22 Nkolo alobi: « Wuta na Bashani, nakomema bango; wuta na mozindo ya ebale monene, nakomema bango,
Dixit Dominus: Ex Basan convertam, convertam in profundum maris:
23 mpo ete opanza lokolo na yo kati na makila, mpe mpo ete lolemo ya bambwa na yo ezwa eteni na yango. »
ut intingatur pes tuus in sanguine; lingua canum tuorum ex inimicis, ab ipso.
24 Oh Nzambe, bazali komona ndenge ozali koya; koya ya Nzambe na ngai, ya Mokonzi na ngai, kati na Esika ya bule.
Viderunt ingressus tuos, Deus, ingressus Dei mei, regis mei, qui est in sancto.
25 Bayembi bazali liboso; sima na bango, bato oyo bazali kobeta mandanda ya basinga kati na bilenge basi oyo bazali kobeta bambonda ya mike.
Prævenerunt principes conjuncti psallentibus, in medio juvencularum tympanistriarum.
26 Bopambola Nzambe kati na mayangani, bopambola Yawe wuta na etima ya Isalaele.
In ecclesiis benedicite Deo Domino de fontibus Israël.
27 Kuna, Benjame, leki ya suka, azali kotambolisa bakambi ya Yuda elongo na mampinga na bango, bakambi ya Zabuloni mpe ya Nefitali.
Ibi Benjamin adolescentulus, in mentis excessu; principes Juda, duces eorum; principes Zabulon, principes Nephthali.
28 Nzambe na yo apesi mitindo epai ya makasi na yo; zala makasi. Nzambe, osaleli biso penza makambo.
Manda, Deus, virtuti tuæ; confirma hoc, Deus, quod operatus es in nobis.
29 Wuta na Tempelo na Yo ya Yelusalemi epai wapi bakonzi bamemelaka Yo makabo,
A templo tuo in Jerusalem, tibi offerent reges munera.
30 bengana ngando oyo ebombami kati na matiti, lisanga ya bangombe ya mibali elongo na bana ngombe ya bikolo oyo batambolaka kati na mbongo ya bibende ya palata, mpe panza bikolo oyo basepelaka na bitumba.
Increpa feras arundinis; congregatio taurorum in vaccis populorum: ut excludant eos qui probati sunt argento. Dissipa gentes quæ bella volunt.
31 Bazwi bakobimela na Ejipito; bato ya Kushi bakoya na lombangu, bakotombola maboko epai ya Nzambe.
Venient legati ex Ægypto; Æthiopia præveniet manus ejus Deo.
32 Bino, babokonzi ya mabele, boyembela Nzambe; boyemba banzembo mpo na lokumu ya Nkolo!
Regna terræ, cantate Deo; psallite Domino; psallite Deo.
33 Boyembela Ye oyo atambolisaka mampinga kati na likolo, likolo ya libela; oyo, wuta na mongongo na Ye, agangaka makasi.
Qui ascendit super cælum cæli, ad orientem: ecce dabit voci suæ vocem virtutis.
34 Bosakola ete nguya ezali ya Nzambe oyo nkembo na Ye ezali na Isalaele, mpe nguya na Ye ezali kati na mapata.
Date gloriam Deo super Israël; magnificentia ejus et virtus ejus in nubibus.
35 Nzambe, wuta kati na bisika na Yo ya bule, obongi na botosi! Nzambe ya Isalaele apesaka na bato na Ye makasi mpe nguya. Tika ete Nzambe akumisama!
Mirabilis Deus in sanctis suis; Deus Israël ipse dabit virtutem et fortitudinem plebi suæ. Benedictus Deus!]

< Banzembo 68 >