< Banzembo 67 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi: nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo. Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye;
一篇诗歌,交与伶长。用丝弦的乐器。 愿 神怜悯我们,赐福与我们, 用脸光照我们, (细拉)
2 mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili, mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.
好叫世界得知你的道路, 万国得知你的救恩。
3 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo!
神啊,愿列邦称赞你! 愿万民都称赞你!
4 Tika ete bato basepela, tika ete babeta milolo ya esengo, pamba te okambaka bikolo na bosembo, mpe otambolisaka bato awa na mabele.
愿万国都快乐欢呼; 因为你必按公正审判万民, 引导世上的万国。 (细拉)
5 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo!
神啊,愿列邦称赞你! 愿万民都称赞你!
6 Mabele eboti bambuma na yango; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.
地已经出了土产; 神—就是我们的 神要赐福与我们。
7 Tika ete Nzambe apambola biso; tika ete mokili mobimba etosa Ye!
神要赐福与我们; 地的四极都要敬畏他!

< Banzembo 67 >