< Banzembo 66 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo. Bino bato ya mokili mobimba, bobetela Nzambe maboko!
一篇詩歌,交與伶長。 全地都當向上帝歡呼!
2 Boyemba banzembo ya lokumu mpo na nkembo ya Kombo na Ye, bopesa lokumu na Ye nkembo.
歌頌他名的榮耀! 用讚美的言語將他的榮耀發明!
3 Boloba na Nzambe: « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.
當對上帝說:你的作為何等可畏! 因你的大能,仇敵要投降你。
4 Mokili mobimba efukamaka liboso na Yo; bayembaka mpo na lokumu na Yo, basanzolaka Kombo na Yo. »
全地要敬拜你,歌頌你, 要歌頌你的名。 (細拉)
5 Boya kotala misala ya Nzambe! Misala na Ye ya minene mpo na bana ya bato ebongi na kobanga yango.
你們來看上帝所行的, 他向世人所做之事是可畏的。
6 Abongolaki ebale monene mabele ya kokawuka; bakatisaki ebale na makolo ekawuka. Tozali kosepela kati na Ye.
他將海變成乾地,眾民步行過河; 我們在那裏因他歡喜。
7 Na nguya na Ye, akonzaka mpo na libela; miso na Ye ekengelaka bikolo. Tika ete batomboki batombokela Ye te.
他用權能治理萬民,直到永遠。 他的眼睛鑒察列邦; 悖逆的人不可自高。 (細拉)
8 Bino bikolo, bopambola Nzambe na biso! Bosala ete lokito ya masanzoli na Ye eyokana!
萬民哪,你們當稱頌我們的上帝, 使人得聽讚美他的聲音。
9 Asalaka ete totangama kati na bato ya bomoi. Abatelaki makolo na biso mpo ete tokweya te.
他使我們的性命存活, 也不叫我們的腳搖動。
10 Pamba te, Nzambe, omekaki biso, olekisaki biso kati na moto ndenge basalaka mpo na palata.
上帝啊,你曾試驗我們, 熬煉我們,如熬煉銀子一樣。
11 Okangaki biso kati na motambo; otiaki mikumba ya kilo, na baloketo na biso.
你使我們進入網羅, 把重擔放在我們的身上。
12 Otikaki moto komatela biso na moto. Tolekaki kati na moto mpe kati na mayi, mpe obimisaki biso kati na yango mpo na komema biso na bofuluki.
你使人坐車軋我們的頭; 我們經過水火, 你卻使我們到豐富之地。
13 Nakokota kati na Ndako na Yo, nakomemela Yo makabo ya kotumba, nakokokisa bandayi na ngai epai na Yo.
我要用燔祭進你的殿, 向你還我的願,
14 Bandayi oyo bibebu na ngai moko etatolaki mpe monoko na ngai elobaki na tango nazalaki kati na pasi.
就是在急難時我嘴唇所發的、 口中所許的。
15 Lokola bambeka ya kotumba, nakobonzela Yo banyama minene, bameme elongo na bambeka ya malasi; nakobonzela Yo bangombe mpe bantaba ya mibali.
我要把肥牛作燔祭, 將公羊的香祭獻給你, 又把公牛和山羊獻上。 (細拉)
16 Bino nyonso oyo botosaka Nzambe, boya koyoka! Nakoyebisa bino makambo oyo asali mpo na bomoi na ngai.
凡敬畏上帝的人,你們都來聽! 我要述說他為我所行的事。
17 Nabelelaki Ye na monoko na ngai, mpe lolemo na ngai ekumisaki Ye.
我曾用口求告他; 我的舌頭也稱他為高。
18 Soki nazalaki na masumu kati na motema na ngai, Nkolo alingaki koyoka ngai te.
我若心裏注重罪孽, 主必不聽。
19 Nzokande, Nzambe ayokaki ngai, ayokaki na bokebi libondeli na ngai.
但上帝實在聽見了; 他側耳聽了我禱告的聲音。
20 Tika ete Nzambe akumisama! Aboyaki te koyoka libondeli na ngai mpe kotalisa ngai bolingo na Ye.
上帝是應當稱頌的! 他並沒有推卻我的禱告, 也沒有叫他的慈愛離開我。