< Banzembo 65 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Mpo na Yo Nzambe, bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona; mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.
Til Sangmesteren. En Salme af David. En Sang.
2 Yo oyo oyokaka mabondeli, bato nyonso bakoya epai na Yo.
Lovsang tilkommer dig paa Zion, o Gud, dig indfrier man Løfter, du, som hører Bønner;
3 Kilo ya bambeba eleki makasi mpo na ngai; kasi Yo, olimbisaka masumu na biso.
alt Kød kommer til dig, naar Brøden tynger.
4 Esengo na moto oyo oponi mpe obulisi mpo ete avanda kati na lopango na Yo. Tokotonda na bolamu ya Ndako na Yo, Tempelo na Yo ya bule.
Vore Overtrædelser blev os for svare, du tilgiver dem.
5 Nzambe Mobikisi na biso, oyanolaka biso na bosembo, na nzela ya biloko ya somo; Ozali elikya ya mokili mobimba mpe ya bibale minene.
Salig den, du udvælger, lader bo i dine Forgaarde! Vi mættes af dit Huses Rigdom, dit Tempels Hellighed.
6 Alendisaka bangomba, na nguya na Ye; atondi na mpiko.
Du svarer os underfuldt i Retfærd, vor Frelses Gud, du Tilflugt for den vide Jord, for fjerne Strande,
7 Akitisaka makelele ya bibale minene, makelele ya bambonge na yango mpe makelele ya bikolo.
du, som grundfæster Bjerge med Vælde, omgjordet med Kraft,
8 Bato oyo bavandaka na basuka ya mokili babangaka tango bamonaka bikamwa na Yo; osalaka ete este mpe weste eganga na esengo.
du, som dæmper Havenes Brusen, deres Bølgers Brusen og Folkefærds Larm,
9 Opambolaka mabele, ofulukisaka yango, otondisaka yango na bozwi. Otondisaka moluka ya Nzambe na mayi, obongiselaka bato ble, pamba te otondisaka mayi mpo na yango.
saa Folk ved Verdens Ende gruer for dine Tegn; hvor Morgen og Aften oprinder, bringer du Jubel.
10 Olekisaka mayi kati na mikala, okweyisaka mipiku ya mabele, osopelaka mabele mayi mpe opambolaka milona.
Du saa til Landet, vanded det, gjorde det saare rigt, Guds Bæk er fuld af Vand, du bereder dets Korn,
11 Opambolaka mobu na bolamu na Yo, mpe banzela mike oyo olekelaka ebotaka ebele.
du vander dets Furer, jævner knoldene, bløder det med Regn, velsigner dets Sæd.
12 Bilanga ya esobe etondaka na bilei, mpe bangomba mike etondaka na esengo.
Med din Herlighed kroner du Aaret, dine Vognspor flyder af Fedme;
13 Bilanga etondaka na bameme mpe bantaba; mabwaku etondaka na ble, egangaka na esengo mpe eyembaka.
de øde Græsgange flyder, med Jubel omgjordes Højene; Engene klædes med Faar, Dalene hylles i Korn, i Jubel bryder de ud og synger!

< Banzembo 65 >