< Banzembo 64 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe, yoka mongongo na ngai kati kolela na ngai, batela ngai mosika ya monguna oyo azali kopesa ngai somo.
達味詩歌,交與樂官。 天主,求您傾聽我哀訴的聲音,從仇敵的恐嚇中保全我生命。
2 Bomba ngai mosika ya mikano ya bato mabe, mosika ya makita ya bato ya misala mabe.
求您掩護我遠離惡人的陰險,使我脫免作奸犯科者的暴亂;
3 Bapelisaka lolemo na bango ndenge bapelisaka mopanga, babimisaka maloba ya bololo lokola makonga
他們磨礪自己的舌頭有如刀劍,他們吐出有毒的語言有如弓箭:
4 mpo na kobwakela, na kobombama, moto oyo azangi pamela; babangaka te kobwakela ye yango na mbalakata.
暗地裏向無辜的人擊撾,肆無忌憚,突然將他刺殺。
5 Balendisanaka mpo na mabongisi mabe, bayokanaka kotia mitambo; balobaka: « Nani akomona yango? »
他們彼此激勵行惡,互相商議暗佈羅網;說:看見我們的究竟是誰?
6 Basalaka mabongisi ya kosala bato mabe, balobaka: « Toselingwi na mabongisi na biso! » Makanisi mpe motema ya moto ezali mozindo makasi.
誰能查出我們的邪思﹖我們已作成精密陰謀,走近的人必墜入深溝。
7 Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na Ye na mbalakata; ekozwa mpe ekozokisa bango.
但是,天主必要用箭射擊他們,他們必要突然身受創痕。
8 Maloba na bango moko ekobalukela bango mpe ekomema bango na libebi; mpe moto nyonso oyo akomona bango akoningisa moto.
他們的舌頭必使自己跌仆,凡見到他們的人都必搖頭。
9 Bato nyonso bakokoma kobanga, kopanza sango ya misala ya Nzambe mpe kososola makambo oyo asalaka.
眾人要恐懼,要傳述天主的作為,他們也都要細心默思他的事跡。
10 Moto ya sembo akosepela mpe akomibomba kati na Yawe; bato nyonso oyo bazali na mitema alima bakomikumisa mpo na yango.
義人必要喜樂於上主,向他投靠,心地正直的人,必要因此而歡躍。

< Banzembo 64 >