< Banzembo 62 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi. Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.
למנצח על-ידותון-- מזמור לדוד ב אך אל-אלהים דומיה נפשי ממנו ישועתי
2 Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.
אך-הוא צורי וישועתי משגבי לא-אמוט רבה
3 Kino tango nini bokosangela moto moko? Kino tango nini bino nyonso bokosangana mpo na koluka koboma ye lokola mir oyo etengami, lokola lopango oyo esili kokweya?
עד-אנה תהותתו על-איש-- תרצחו כלכם כקיר נטוי גדר הדחויה
4 Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye wuta na esika na ye ya likolo, basepelaka kotatola lokuta. Bapambolaka na nzela ya minoko na bango; kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.
אך משאתו יעצו להדיח-- ירצו כזב בפיו יברכו ובקרבם יקללו-סלה
5 Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe, pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.
אך לאלהים דומי נפשי כי-ממנו תקותי
6 Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.
אך-הוא צורי וישועתי משגבי לא אמוט
7 Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.
על-אלהים ישעי וכבודי צור-עזי מחסי באלהים
8 Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.
בטחו בו בכל-עת עם-- שפכו-לפניו לבבכם אלהים מחסה-לנו סלה
9 Solo, bato bazali lokola molunge, bazali lokola lokuta; Soki batie bango na emekelo kilo, ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo.
אך הבל בני-אדם-- כזב בני-איש במאזנים לעלות המה מהבל יחד
10 Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te.
אל-תבטחו בעשק ובגזל אל-תהבלו חיל כי-ינוב-- אל-תשיתו לב
11 Nzambe alobaki mbala moko, ngai nayokaki mbala mibale: « Pamba te makasi ezali ya Nzambe;
אחת דבר אלהים--שתים-זו שמעתי כי עז לאלהים
12 mpe bolingo ezali ya Nkolo; » mpe « ofutaka moto nyonso kolanda misala na ye. »
ולך-אדני חסד כי-אתה תשלם לאיש כמעשהו

< Banzembo 62 >