< Banzembo 61 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe, yoka koganga na ngai, yoka na bokebi losambo na ngai.
Sikia kulia kwangu, shughulikia maombi yangu.
2 Wuta na suka ya mokili, nazali kobelela Yo, motema na ngai ebukani! Mema ngai na libanga oyo eleki likolo epai wapi nakokoka te kokoma ngai moko.
Kutokea mwisho wa nchi nitakuita wewe wakati moyo wangu umeelemewa; uniongoze kwenye mwamba ulio juu kuliko mimi.
3 Pamba te, ozali ebombamelo na ngai, ndako molayi batonga makasi, liboso ya banguna na ngai.
Maana wewe umekuwa kimbilio langu la usalama, nguzo imara dhidi ya adui.
4 Posa ya motema na ngai ezali: kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo.
Uniache niishi hemani mwako milele! Nipate kimbilio salama chini ya makazi ya mbawa zako. (Selah)
5 Pamba te Yo Nzambe, oyokaki bandayi na ngai, opesaki ngai libula ya bato oyo batosaka Kombo na Yo.
Kwa kuwa wewe, Mungu, umesikia viapo vyangu, wewe umenipa mimi urithi wa wale wanao liheshimu jina lako.
6 Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi; tika ete awumela na bomoi.
Wewe utaongeza maisha ya mfalme; miaka yake itakuwa kama vizazi vingi.
7 Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.
Yeye atabakia mbele ya Mungu milele.
8 Boye, nakoyemba mikolo nyonso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, mpe nakokokisa bandayi na ngai mokolo na mokolo.
Nitaliimbia sifa jina lako milele ili kwamba niweze kufanya viapo vyangu kila siku.