< Banzembo 6 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe. Yawe, kopesa ngai etumbu te na kanda na Yo, kopesa ngai etumbu te na kanda makasi na Yo.
Müzik şefi için - Sekiz telli sazlarla Davut'un mezmuru Ya RAB, öfkeyle azarlama beni, Gazapla yola getirme.
2 Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazangi makasi. Yawe, bikisa ngai na bokono, pamba te mikuwa na ngai elembi.
Lütfet bana, ya RAB, bitkinim; Şifa ver bana, ya RAB, kemiklerim sızlıyor,
3 Molimo na ngai ezali kotungisama makasi; bongo Yo, Yawe, kino tango nini?
Çok acı çekiyorum. Ah, ya RAB! Ne zamana dek sürecek bu?
4 Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai, bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo.
Gel, ya RAB, kurtar beni, Yardım et sevginden dolayı.
5 Pamba te bakufi bakoki lisusu te kotatola Kombo na Yo te! Mpe kati na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa Yo? (Sheol h7585)
Çünkü ölüler arasında kimse seni anmaz, Kim şükür sunar sana ölüler diyarından? (Sheol h7585)
6 Kolela elembisi ngai nzoto. Butu nyonso, nalelaka na mbeto na ngai, mpe napolisaka na mpinzoli, esika oyo nalalaka.
İnleye inleye bittim, Döşeğim su içinde bütün gece ağlamaktan, Yatağım sırılsıklam gözyaşlarımdan.
7 Miso na ngai ebebi mpo na mawa; ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai.
Kederden gözlerimin feri sönüyor, Zayıflıyor gözlerim düşmanlarım yüzünden.
8 Bino nyonso oyo bosalaka mabe, bolongwa liboso na ngai, pamba te Yawe ayoki kolela na ngai.
Ey kötülük yapanlar, Uzak durun benden, Çünkü RAB ağlayışımı işitti.
9 Yawe ayanoli mabondeli na ngai mpe ayambi losambo na ngai.
Yalvarışımı duydu, Duamı kabul etti.
10 Banguna na ngai nyonso bakoyoka soni, mpe somo monene ekokanga bango; bakozonga na sima mpe bakoyoka mbala moko soni.
Bütün düşmanlarım utanacak, Hepsini dehşet saracak, Ansızın geri dönecekler utanç içinde.

< Banzembo 6 >