< Banzembo 59 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te! » tango Saulo atindaki bato kozingela ndako ya Davidi mpo na koboma ye. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe na ngai, kangola ngai wuta na maboko ya banguna na ngai; batela ngai liboso ya banyokoli na ngai.
Au maître chantre. Sur « Ne détruis pas ». Ecrit de David, quand Saül envoya, et qu'ils gardèrent la maison, pour le faire mourir. Délivre-moi de mes ennemis, mon Dieu! et mets-moi hors de l'atteinte de mes agresseurs!
2 Kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe, mpe bikisa ngai liboso ya basopi makila ya bato.
Délivre-moi des hommes malfaisants, et sauve-moi des hommes sanguinaires!
3 Yawe, bazali koluka koboma ngai; bato na nguya basaleli ngai likita, nzokande nasali mabe te, nasali na ngai mpe masumu te.
Car voici, ils tendent des embûches à mon âme; des violents se liguent contre moi, sans qu'il y ait en moi ni crime, ni péché, Éternel.
4 Nasali mabe ata moko te; kasi bango bazali kopota mbangu, bazali komibongisa. Lamuka mpo na koya kokutana na ngai, mpe tala.
Je ne suis pas coupable, et ils accourent et se campent: veille! viens à moi, et regarde!
5 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, Nzambe ya Isalaele, telema mpo na kopesa bikolo nyonso etumbu; koyokela bato nyonso oyo basalaka mabe mawa te.
O toi, Éternel, Dieu des armées, Dieu d'Israël, réveille-toi pour châtier tous les peuples! N'épargne aucun de ces traîtres méchants! (Pause)
6 Bazongaka na pokwa, bagangaka lokola bambwa mpe batambolaka zingazinga ya engumba.
Ils reviennent le soir, ils hurlent comme les chiens, et ils parcourent la ville.
7 Na nzela ya minoko na bango, babimisaka na bibebu na bango maloba oyo ezokisaka lokola mipanga; bamilobelaka: « Nani azali koyoka biso? »
Voici, de leurs bouches ils vomissent leurs propos; des glaives sont sur leurs lèvres! « Car, qui est là pour entendre? »
8 Kasi Yo, Yawe, osekaka bango, otiolaka bikolo nyonso.
Mais toi, Éternel, tu te ris d'eux, et tu te moques de toutes les nations.
9 Nzambe, ozali makasi na ngai, nakotalela Yo; ozali ebombamelo na ngai,
Ils sont forts!… Je regarde vers toi; car l'Éternel est mon boulevard.
10 Nzambe na ngai, oyo nalingaka. Nzambe ayaka kino liboso na ngai, atikaka ngai kotala banguna na ngai.
Mon Dieu me prévient par sa grâce; Dieu fait que mes ennemis réjouissent mes regards.
11 Nkolo, nguba na biso, koboma bango te, noki te bato na ngai bakobosana. Na nguya na Yo, sala ete bayengayenga, mpe mema bango kino na se.
Ne les tue point, de peur que mon peuple n'oublie!… Défais-les par ta puissance, et les précipite, ô toi, notre bouclier, Seigneur!
12 Mpo na masumu ya minoko na bango, mpo na maloba ya bibebu na bango, tika ete bakangama na motambo ya lolendo na bango. Mpo na bilakeli mabe mpe lokuta na bango,
Il y a péché dans leur bouche à tous les propos de leurs lèvres: qu'ils soient donc pris au piège, pour leur orgueil, et pour les parjures et les mensonges qu'ils profèrent!
13 bebisa bango na kanda na Yo, bebisa bango kino bazala lisusu te. Bongo bakoyeba ete Nzambe azali kokonza kati na Jakobi kino na suka ya mokili.
Détruis, détruis-les dans ton courroux, et qu'ils ne soient plus! afin qu'ils apprennent que Dieu règne en Jacob, jusqu'aux extrémités de la terre. (Pause)
14 Bazongaka na pokwa, bagangaka lokola bambwa mpe batambolaka zingazinga ya engumba.
Qu'ils reviennent le soir, hurlent comme les chiens, et qu'ils parcourent la ville!
15 Bayengaka-yengaka mpo na koluka bilei; soki batondi te, balekisaka butu na kolelalela.
Qu'ils rôdent cherchant une curée. ayant passé la nuit sans s'être rassasiés!
16 Kasi ngai nakoyembela makasi na Yo, nakobetela bolingo na Yo milolo, na tongo, pamba te ozali ebombamelo na ngai, mpe ekimelo na ngai na tango ya pasi.
Mais moi, je chanterai ta puissance, et dès le matin je dirai les louanges de ta grâce; car tu es mon boulevard, et mon refuge dans mon jour de détresse.
17 Ozali makasi na ngai, nakoyemba mpo na lokumu na Yo; ozali ebombamelo na ngai, oh Nzambe; Nzambe na ngai, oyo nalingaka.
O toi, qui es ma force, je veux te célébrer! car Dieu, mon Dieu bon, est mon boulevard.