< Banzembo 57 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu. Oh Nzambe, yokela ngai mawa! Yokela ngai mawa, pamba te nazali koluka ebombamelo; nazali koluka ebombamelo na se ya mapapu na Yo, kino tango ya pasi ekoleka.
לַמְנַצֵּ֣חַ אַל־תַּ֭שְׁחֵת לְדָוִ֣ד מִכְתָּ֑ם בְּבָרְח֥וֹ מִפְּנֵי־שָׁ֝א֗וּל בַּמְּעָרָֽה׃ חָנֵּ֤נִי אֱלֹהִ֨ים ׀ חָנֵּ֗נִי כִּ֥י בְךָ֮ חָסָ֪יָה נַ֫פְשִׁ֥י וּבְצֵֽל־כְּנָפֶ֥יךָ אֶחְסֶ֑ה עַ֝֗ד יַעֲבֹ֥ר הַוּֽוֹת׃
2 Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.
אֶ֭קְרָא לֵֽאלֹהִ֣ים עֶלְי֑וֹן לָ֝אֵ֗ל גֹּמֵ֥ר עָלָֽי׃
3 Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai, akopamela bato oyo batungisaka ngai. Nzambe akomonisa bolingo mpe boyengebene na Ye.
יִשְׁלַ֤ח מִשָּׁמַ֨יִם ׀ וְֽיוֹשִׁיעֵ֗נִי חֵרֵ֣ף שֹׁאֲפִ֣י סֶ֑לָה יִשְׁלַ֥ח אֱ֝לֹהִ֗ים חַסְדּ֥וֹ וַאֲמִתּֽוֹ׃
4 Nazali na kati-kati ya bankosi; nalali na kati-kati ya bato oyo babomaka mpe baliaka bato, oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo, mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.
נַפְשִׁ֤י ׀ בְּת֥וֹךְ לְבָאִם֮ אֶשְׁכְּבָ֪ה לֹ֫הֲטִ֥ים בְּֽנֵי־אָדָ֗ם שִׁ֭נֵּיהֶם חֲנִ֣ית וְחִצִּ֑ים וּ֝לְשׁוֹנָ֗ם חֶ֣רֶב חַדָּֽה׃
5 Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola; tika ete nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba!
ר֣וּמָה עַל־הַשָּׁמַ֣יִם אֱלֹהִ֑ים עַ֖ל כָּל־הָאָ֣רֶץ כְּבוֹדֶֽךָ׃
6 Batiaki monyama na makolo na ngai mpo ete nakangama, batimolaki libulu liboso na ngai, kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.
רֶ֤שֶׁת ׀ הֵכִ֣ינוּ לִפְעָמַי֮ כָּפַ֪ף נַ֫פְשִׁ֥י כָּר֣וּ לְפָנַ֣י שִׁיחָ֑ה נָפְל֖וּ בְתוֹכָ֣הּ סֶֽלָה׃
7 Nzambe, lendisa motema na ngai; Nzambe, lendisa motema na ngai. Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.
נָ֘כ֤וֹן לִבִּ֣י אֱ֭לֹהִים נָכ֣וֹן לִבִּ֑י אָ֝שִׁ֗ירָה וַאֲזַמֵּֽרָה׃
8 Lokumu na ngai, lamuka! Lindanda mpe nzenze, bolamuka! Nalingi kolamusa tongo.
ע֤וּרָה כְבוֹדִ֗י ע֭וּרָֽה הַנֵּ֥בֶל וְכִנּ֗וֹר אָעִ֥ירָה שָּֽׁחַר׃
9 Nkolo, nakosanzola Yo kati na mabota, nakosanzola Yo na mindule kati na bikolo.
אוֹדְךָ֖ בָעַמִּ֥ים ׀ אֲדֹנָ֑י אֲ֝זַמֶּרְךָ֗ בַּל־אֻמִּֽים׃
10 Pamba te bolingo na Yo ezali monene, ekenda kino na Lola; mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.
כִּֽי־גָדֹ֣ל עַד־שָׁמַ֣יִם חַסְדֶּ֑ךָ וְֽעַד־שְׁחָקִ֥ים אֲמִתֶּֽךָ׃
11 Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola; mpe tika ete nkembo na Yo etonda na mokili mobimba!
ר֣וּמָה עַל־שָׁמַ֣יִם אֱלֹהִ֑ים עַ֖ל כָּל־הָאָ֣רֶץ כְּבוֹדֶֽךָ׃

< Banzembo 57 >