< Banzembo 56 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Ebenga ya terebente ya mosika. » Nzembo ya Davidi, tango bato ya Filisitia bakangaki ye kati na mboka Gati. Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te bato bazali kotungisa ngai. Babundisaka mpe banyokolaka ngai mikolo nyonso.
For the choirmaster. To the tune of “A Dove on Distant Oaks.” A Miktam of David, when the Philistines seized him in Gath. Be merciful to me, O God, for men are hounding me; all day they press their attack.
2 Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso; bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.
My enemies pursue me all day long, for many proudly assail me.
3 Mokolo oyo nazalaka na bobangi, natiaka elikya na ngai kati na Yo.
When I am afraid, I put my trust in You.
4 Epai ya Nzambe, nakumisaka Liloba na Ye; Epai ya Nzambe, natiaka motema mpe nabangaka te. Moto oyo akokufa akoki kosala ngai nini?
In God, whose word I praise— in God I trust. I will not be afraid. What can man do to me?
5 Babongolaka maloba na ngai mikolo nyonso; mabongisi na bango nyonso ezalaka mpo na kosala ngai mabe.
All day long they twist my words; all their thoughts are on my demise.
6 Basalaka makita, babombamaka, balandaka ngai mpo na kosala ngai mabe.
They conspire, they lurk, they watch my steps while they wait to take my life.
7 Mpo na makambo oyo ya mabe, boni, bazanga etumbu? Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo!
In spite of such sin, will they escape? In Your anger, O God, cast down the nations.
8 Solo, oyebi motango ya matambe ya bomoi na ngai ya mitelengano. Sopa mpinzoli na ngai kati na mbeki na Yo, oyo ezali buku na Yo ya ekaniseli.
You have taken account of my wanderings. Put my tears in Your bottle— are they not in Your book?
9 Bongo, na mokolo oyo nakobelela mpo na kosenga lisungi, banguna na ngai bakozonga sima. Na nzela ya likambo yango, nakoyeba ete Nzambe azali mpo na ngai.
Then my enemies will retreat on the day I cry for help. By this I will know that God is on my side.
10 Pembeni ya Nzambe oyo nakumisaka Liloba na Ye, pembeni ya Yawe oyo nakumisaka Liloba na Ye,
In God, whose word I praise, in the LORD, whose word I praise,
11 pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema mpe nazalaka na bobangi te, moto akoki kosala ngai nini?
in God I trust; I will not be afraid. What can man do to me?
12 Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai mpe nakobonza bambeka ya matondi.
Your vows are upon me, O God; I will render thank offerings to You.
13 Pamba te okangoli ngai na kufa mpe obateli makolo na ngai ete ebeta mabaku te, mpo ete natambola liboso na Yo Nzambe kati na pole ya bomoi.
For You have delivered my soul from death, and my feet from stumbling, that I may walk before God in the light of life.

< Banzembo 56 >