< Banzembo 55 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, komibomba te wana nazali kobelela Yo.
“For the leader of the music. To be sung on stringed instruments. A psalm of David.” Give ear to my prayer, O God! Hide not thyself from my supplication!
2 Yoka ngai mpe yanola ngai. Kati na kolela na ngai, nakomi koyengayenga mpe nazangi kimia,
Attend unto me, and hear me! I wander about mourning and wailing,
3 mpo na maloba ya monguna na ngai mpe kanda ya moto mabe, pamba te bazali kokweyisela ngai misala mabe mpe konyokola ngai na kanda.
On account of the clamors of the enemy, On account of the violence of the wicked. For they bring evil upon me, And in wrath set themselves against me.
4 Motema na ngai etondi na mawa, mpe somo ya kufa ekangi ngai.
My heart trembleth in my bosom, And the terrors of death have fallen upon me.
5 Nakomi kobanga mpe kolenga, somo monene ekangi ngai.
Fear and trembling have seized me, And horror hath overwhelmed me.
6 Nakomi komilobela: « Soki nazalaki ata na mapapu ya ebenga, nalingaki kopumbwa mpo na koluka bopemi;
Then I say, O that I had wings like a dove! For then would I fly away, and be at rest.
7 nalingaki kokima mosika penza, mpo na kokende kovanda ata na esobe.
Behold, I would wander far away, And take up my abode in a wilderness. (Pause)
8 Solo, na lombangu penza, nalingaki kokende koluka ebombamelo mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki. »
I would hasten away to a shelter From the rushing wind and tempest.
9 Nkolo, bebisa mabongisi ya banguna na ngai mpe kotisa mobulu kati na bango; pamba te, kati na engumba, nazali komona mobulu mpe bokabwani.
Confound, O Lord! divide their counsels! For I behold violence and strife in the city.
10 Butu mpe moyi, ezali kotambola na bamir na yango; misala mabe mpe ya kanza etondi kati na yango.
Day and night do these go about its walls; In the midst of it are iniquity and mischief.
11 Banguya oyo ebebisaka ezali kosala kati na yango, minyoko mpe lokuta ezali kosila te.
Wickedness is in the midst of it; Oppression and fraud depart not from its streets.
12 Soki monguna nde azalaki kofinga ngai, nalingaki kokanga motema; soki ezalaki mpe moyini nde azalaki kotelemela ngai, nalingaki komibomba mpo ete amona ngai te.
It was not an enemy that reviled me, Then I could have borne it; Nor one that hated me, who rose up against me; From him I could have hid myself.
13 Kasi ezali yo, moto lokola ngai, oyo otambolaka elongo na ngai, molingami mpe moninga na ngai ya motema
But it was thou, a man my equal, My friend, and my acquaintance.
14 oyo nazalaki kokabola elongo na yo, pasi mpe basekele tango tozalaki kokende nzela moko na Tempelo ya Nzambe.
We held sweet converse together, And walked to the house of God in company.
15 Tika ete kufa ekanga bango na mbalakata mpe bakita ya bomoi kati na mboka ya bakufi; pamba te mabe etondi kati na bandako mpe mitema na bango. (Sheol h7585)
May sudden death seize upon them! May they go down to the underworld alive! For wickedness is in their dwellings, in the midst of them. (Sheol h7585)
16 Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe, mpe Yawe akobikisa ngai.
As for me, I will call upon God, And Jehovah will save me.
17 Tongo, midi, pokwa, nasopaka motema na ngai mpe nalelaka, mpe ayokaka mongongo na ngai.
At evening, at morn, and at noon I mourn and sigh, And he will hear my voice.
18 Akopesa ngai kimia, akokangola ngai na bitumba oyo babundisaka ngai; pamba te bato oyo batelemeli ngai bazali ebele.
He will deliver me in peace from my conflict; For many have risen up against me.
19 Nzambe ayokaka, akosambwisa bango penza; akonzaka mpo na libela na libela. Babongolaka mitema te mpe batosaka Nzambe te.
God will hear me, and bring them down, —He that hath been judge of old. (Pause) Because they have no changes, Therefore they fear not God.
20 Abundisi balingami na ye, abebisi boyokani na ye.
They lift up their hands against their friend, And break their covenant with him.
21 Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
Their speech was softer than butter, But war was in their heart; Their words were smoother than oil, Yet were they drawn swords.
22 Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.
“Cast thy burden upon the LORD, and he will sustain thee; He will never suffer the righteous to fall!”
23 Mpe Yo, Nzambe, okobwaka basopi makila mpe bakosi kati na libulu ya libebi; bakokokisa ata kati-kati te ya mikolo ya bomoi na bango. Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo.
Yea, thou, O God! wilt bring them down into the lowest pit! Bloody and deceitful men shall not live out half their days. But I will trust in thee!

< Banzembo 55 >