< Banzembo 54 >
1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo: « Davidi abombami kati na biso. » Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo, longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.
For the chief musician; on stringed instruments. A maschil of David; when the Ziphites came and said to Saul, “Does David not hide himself with us?” Save me, God, by your name, and judge me in your might.
2 Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, yoka maloba ya monoko na ngai.
Hear my prayer, God; give ear to the words of my mouth.
3 Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai; mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai, batalelaka Nzambe te.
For strangers have risen up against me, and pitiless men have sought after my life; they have not set God before them. (Selah)
4 Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai.
See, God is my helper; the Lord is the one who upholds me.
5 Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe! Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango.
He will repay my enemies with evil; in your faithfulness, destroy them!
6 Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu, nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe, pamba te ozali malamu.
I will sacrifice to you with a freewill offering; I will give thanks to your name, Yahweh, for it is good.
7 Okangoli ngai na pasi nyonso; mpe miso na ngai etali lokola molongi ya banguna na ngai.
For he has rescued me from every trouble; my eye has looked in triumph on my enemies.