< Banzembo 51 >

1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki tango mosakoli Natan akomaki epai ya Davidi sima na ye kosala ekobo elongo na Batisheba. Oh Nzambe, yokela ngai mawa kolanda bolingo monene na Yo; longola masumu na ngai kolanda mawa monene na Yo!
برای سالار مغنیان. مزمور داود وقتی که ناتان نبی بعد از در‌آمدنش به بتشبع نزد او آمد ای خدا به حسب رحمت خود بر من رحم فرما. به حسب کثرت رافت خویش گناهانم را محو ساز.۱
2 Sukola ngai mobimba mpo na kolongola mabe na ngai, mpe petola ngai na masumu na ngai.
مرا از عصیانم به کلی شست و شو ده و از گناهم مرا طاهر کن.۲
3 Pamba te nayebi mabe na ngai, mpe masumu na ngai ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
زیرا که من به معصیت خود اعتراف می‌کنم وگناهم همیشه در نظر من است.۳
4 Epai na Yo, epai na Yo kaka, nasali masumu mpe mabe na miso na Yo. Boye, okozala sembo tango okozwa mokano, mpe okozala na pamela te tango okokata makambo.
به تو و به تو تنهاگناه ورزیده، و در نظر تو این بدی را کرده‌ام. تا درکلام خود مصدق گردی و در داوری خویش مزکی شوی.۴
5 Solo, nabotamaki kati na lisumu; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.
اینک در معصیت سرشته شدم و مادرم درگناه به من آبستن گردید.۵
6 Nzokande Yo, osepelaka na bosembo, ata kati na libumu; mpe okoteya ngai bwanya kati na esika ebombama.
اینک براستی در قلب راغب هستی. پس حکمت را در باطن من به من بیاموز.۶
7 Petola ngai na nzela ya izope, mpe nakokoma peto; sukola ngai, mpe nakokoma pembe koleka mvula ya pembe.
مرا با زوفا پاک کن تا طاهر شوم. مراشست و شو کن تا از برف سفیدتر گردم.۷
8 Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema; mpe mikuwa na ngai oyo obukaki ekosepela makasi.
شادی وخرمی را به من بشنوان تا استخوانهایی که کوبیده‌ای به وجد آید.۸
9 Kotala lisusu masumu na ngai te, mpe longola bambeba na ngai nyonso.
روی خود را از گناهانم بپوشان و همه خطایای مرا محو کن.۹
10 Oh Nzambe, mpo na ngai, kela motema ya peto; mpe kati na ngai, yeisa molimo sika mpe elenda.
‌ای خدادل طاهر در من بیافرین و روح مستقیم در باطنم تازه بساز.۱۰
11 Kobengana ngai te mosika ya elongi na Yo, mpe kolongola te kati na ngai Molimo Mosantu na Yo.
مرا از حضور خود مینداز، و روح قدوس خود را از من مگیر.۱۱
12 Zongisela ngai esengo ya lobiko na Yo, mpe kabela ngai molimo oyo emibongisi malamu mpo na kolendisaka ngai.
شادی نجات خودرا به من باز ده و به روح آزاد مرا تایید فرما.۱۲
13 Nakoteya banzela na Yo epai ya babuki mibeko, mpe bato ya masumu bakozonga epai na Yo.
آنگاه طریق تو را به خطاکاران تعلیم خواهم داد، و گناه کاران بسوی تو بازگشت خواهند نمود.۱۳
14 Oh Nzambe! Nzambe, Mobikisi na ngai, kangola ngai wuta na mokumba ya makila, mpe lolemo na ngai ekosakola bosembo na Yo.
مرا از خونها نجات ده! ای خدایی که خدای نجات من هستی! تا زبانم به عدالت تو ترنم نماید.۱۴
15 Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
خداوندا لبهایم را بگشا تا زبانم تسبیح تو رااخبار نماید.۱۵
16 Mpo ete osepelaka na mbeka te, nakobonza te mbeka ya kotumba oyo ondimaka te.
زیرا قربانی را دوست نداشتی والا می‌دادم. قربانی سوختنی را پسند نکردی.۱۶
17 Nzambe, bambeka oyo osepelaka na yango ezali: molimo oyo ebukani. Nzambe, oyinaka te motema oyo etutami mpe emikitisi.
قربانی های خدا روح شکسته است. خدایا دل شکسته و کوبیده را خوار نخواهی شمرد.۱۷
18 Na ngolu na Yo, salela Siona bolamu, tonga bamir ya Yelusalemi.
به رضامندی خود بر صهیون احسان فرما وحصارهای اورشلیم را بنا نما.۱۸
19 Bongo okosepela na bambeka ya bosembo, bambeka ya kotumba mpe makabo ya kokoka; mpe bangombe ya mibali ekobonzama na bitumbelo na Yo.
آنگاه ازقربانی های عدالت و قربانی های سوختنی تمام راضی خواهی شد و گوساله‌ها بر مذبح توخواهند گذرانید.۱۹

< Banzembo 51 >