< Banzembo 5 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na flite. Oh Yawe, yoka maloba na ngai, sosola tina ya kolelalela na ngai.
Dawid dwom. Ao Awurade, yɛ aso ma me nsɛm na dwene mʼapinisie ho.
2 Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai, yoka koganga na ngai wana nazali kosenga lisungi, pamba te nazali kobondela nde Yo.
Tie me mmoa ho sufrɛ, me Ɔhene ne me Onyankopɔn, ɛfiri sɛ wo na mebɔ wo mpaeɛ.
3 Yawe, na tongo, oyokaka mongongo na ngai; na tongo, nabelemaka mpo na kosenga epai na Yo mpe nazelaka.
Ao, Awurade, wote me nne anɔpa; anɔpa, mede mʼadesrɛ ba wʼanim na mede anidasoɔ twɛn.
4 Pamba te ozali Nzambe te oyo asepelaka na mabe, mpe moto mabe akoki kutu te kovanda elongo na Yo.
Wonyɛ Onyankopɔn a wʼani gye bɔne ho; na amumuyɛfoɔ rentumi ne wo ntena.
5 Bato ya lolendo bakoki te kotelema liboso na Yo. Oyinaka bato nyonso oyo basalaka mabe.
Ahantanfoɔ rentumi nnyina wʼanim; wokyiri wɔn a wɔyɛ bɔne nyinaa.
6 Obomaka bato oyo balobaka lokuta. Yo, Yawe, oyinaka babomi mpe bakosi.
Wosɛe wɔn a wɔka atorɔsɛm; Awurade kyiri mogyapɛfoɔ ne asisifoɔ.
7 Kasi mpo ete bolingo na Yo eleki monene, nakoki kokota kati na Ndako na Yo, nakoki kofukama mpo na botosi epai ya Tempelo na Yo ya bule.
Nanso me, wo mmɔborɔhunu bebrebe enti, mɛba wo fie; na anidie mu na mɛkoto akyerɛ wʼasɔredan kronkron no.
8 Yawe, tambolisa ngai na bosembo na Yo, pamba te nazali na banguna; bongisa nzela oyo olingi ete natambola na yango.
Ao Awurade kyerɛ me ɛkwan wɔ wo tenenee mu mʼatamfoɔ enti, bɔ wo kwan tee wɔ mʼanim.
9 Minoko na bango elobaka kaka lokuta, mitema na bango etondi na mabe. Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama, mpe bakosaka na nzela ya lolemo na bango.
Wɔn anom asɛm baako mpo nyɛ nokorɛ; ɔsɛeɛ ahyɛ wɔn akoma ma. Wɔn menewa yɛ damena a ɛso abue wɔde wɔn tɛkrɛma ka nnaadaasɛm.
10 Oh Nzambe, katela bango etumbu. Tika ete mabongisi na bango ebotela bango libebi. Bengana bango mpo na ebele ya masumu na bango, pamba te batombokeli nde Yo.
Ao, Onyankopɔn, bu wɔn fɔ! Ma wɔn pɔ bɔne nyɛ wɔn ahweaseɛ. Pam wɔn ɛsiane wɔn bɔne dodoɔ no enti, ɛfiri sɛ wɔasɔre atia wo.
11 Kasi tika ete bato nyonso oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango bazalaka na esengo tango nyonso, tika ete bayembaka mpo na esengo, bomoi na bango mobimba. Batela bango mpo ete bato oyo balingaka Kombo na Yo basepelaka kati na Yo.
Nanso, ma wɔn a wɔdwane ba wo nkyɛn no ani nnye; ma wɔmfa anigyeɛ nto dwom daa. Trɛ wo banbɔ mu wɔ wɔn so, na wɔn a wɔdɔ wo din no ma wɔn ani nnye wɔ wo mu.
12 Oh Yawe, solo, opambolaka bato ya sembo mpe ozingelaka bango na nzela ya ngolu na Yo lokola na nzela ya nguba.
Ao Awurade, ampa ara, wohyira teneneefoɔ; na wode wʼayamyɛ twa wɔn ho hyia te sɛ akokyɛm. Wɔde ma dwomkyerɛfoɔ sɛ ɔmfa sankuhoma nto wɔ Seminit ɛnne so.