< Banzembo 49 >
1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Bino bikolo nyonso, boyoka malamu makambo oyo; bino bavandi nyonso ya mokili, boyoka,
Müzik şefi için - Korahoğulları'nın mezmuru Ey bütün halklar, dinleyin! Kulak verin hepiniz, ey dünyada yaşayanlar,
2 bato pamba mpe bato minene, bazwi mpe babola:
Halk çocukları, bey çocukları, Zenginler, yoksullar!
3 Monoko na ngai ekoloba maloba ya bwanya; motema na ngai ekanisi makambo oyo ekopesa bino bososoli.
Bilgelik dökülecek ağzımdan, Anlayış sağlayacak içimdeki düşünceler,
4 Nayokaka masese, mpe nalimbolaka sambole na nzela ya lindanda.
Kulak vereceğim özdeyişlere, Lirle yorumlayacağım bilmecemi.
5 Mpo na nini nabanga na tango ya pasi, tango mabe ya bakosi ezingeli ngai,
Niçin korkayım kötü günlerde Niyeti bozuk düşmanlarım çevremi sarınca?
6 ba-oyo batielaka bomengo na bango motema mpe bamikumisaka mpo na bofuluki ya bozwi na bango?
Onlar varlıklarına güvenir, Büyük servetleriyle böbürlenirler.
7 Moko te akoki kosikola ndeko na ye, moko te akoki kofuta mbongo epai ya Nzambe mpo na lisiko na ye.
Kimse kimsenin hayatının bedelini ödeyemez, Tanrı'ya fidye veremez.
8 Talo ya bomoi na ye eleki motuya makasi, mpe ekotikala kofutama te.
Çünkü hayatın fidyesi büyüktür, Kimse ödemeye yeltenmemeli.
9 Akokaki kozala na bomoi libela na libela, mpe akokaki kokufa te.
Böyle olmasa, Sonsuza dek yaşar insan, Mezar yüzü görmez.
10 Solo, tomonaka bato ya bwanya kokufa elongo na zoba mpe moto oyo azangi mayele, mpe batikaka bomengo na bango epai ya bato mosusu.
Kuşkusuz herkes biliyor bilgelerin öldüğünü, Aptallarla budalaların yok olduğunu. Mallarını başkalarına bırakıyorlar.
11 Bakunda na bango nde ekomaka bandako na bango mpo na libela, mpe bisika na bango ya kovanda mpo na seko na seko, atako bapesaki na bitando na bango ya mabele bakombo na bango mpo ete ebengamaka na yango.
Mezarları, sonsuza dek evleri, Kuşaklar boyu konutları olacak, Topraklarına kendi adlarını verseler bile.
12 Mozwi akowumelaka te na bomoi; ata aleki na lokumu, akokani na nyama oyo ezali kokufa.
Bütün gösterişine karşın geçicidir insan, Ölüp giden hayvanlar gibi.
13 Yango nde suka ya bato oyo batiaka elikya kati na bango moko, ya bato oyo balandaka bango mpe basepelaka na maloba na bango.
Budalaların yolu, Onların sözünü onaylayanların sonu budur. (Sela)
14 Bazali lokola bameme mpe babongisami mpo na mboka ya bakufi; kufa ekokoma kobokola bango. Kala te, bato ya sembo bakonyata bango, kitoko na bango ekonzuluka, mpe mboka ya bakufi ekokoma ndako na bango. (Sheol )
Sürü gibi ölüler diyarına sürülecekler, Ölüm güdecek onları. Tan ağarınca doğrular onlara egemen olacak, Cesetleri çürüyecek, Ölüler diyarı onlara konut olacak. (Sheol )
15 Kasi Nzambe akokangola bomoi na ngai wuta na maboko ya mboka ya bakufi, pamba te akokamata ngai. (Sheol )
Ama Tanrı beni Ölüler diyarının pençesinden kurtaracak Ve yanına alacak. (Sela) (Sheol )
16 Komitungisaka te soki moto moko akomi kofuluka na bozwi, soki kongenga ya ndako na ye ekomi komata se komata.
Korkma biri zenginleşirse, Evinin görkemi artarsa.
17 Pamba te akomema ata eloko moko te tango akokufa; bomengo na ye ekolanda ye te.
Çünkü ölünce hiçbir şey götüremez, Görkemi onunla mezara gitmez.
18 Atako, wana azalaki na bomoi, azalaki komimona moto apambolama— atako bato bakokumisa yo, pamba te omisali bolamu—
Yaşarken kendini mutlu saysa bile, Başarılı olunca övülse bile.
19 okokende kaka kokutana na bakoko na yo oyo bakotikala komona lisusu pole te.
Atalarının kuşağına katılacak, Onlar ki asla ışık yüzü görmeyecekler.
20 Moto oyo azali mozwi, kasi azangi bososoli, azali lokola nyama oyo ezali kokufa.
Bütün gösterişine karşın anlayışsızdır insan, Ölüp giden hayvanlar gibi.