< Banzembo 48 >
1 Nzembo ya bana ya Kore. Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, kati na engumba ya Nzambe na biso, ngomba na Ye ya bule.
“A psalm of the sons of Korah.” Great is Jehovah, and greatly to be praised In the city of our God, upon his holy mountain.
2 Ezali kitoko, ngomba moke oyo esalaka esengo ya mokili mobimba, ngomba Siona! Ngambo na yango ya Nor nde ezali engumba ya Mokonzi Monene.
Beautiful in its elevation is Mount Zion, The joy of the whole earth; The joy of the farthest North is the city of the great king;
3 Nzambe azali kati na bandako na yango ya bokonzi, amimonisi lokola ndako batonga makasi.
In her palaces God is known as a refuge.
4 Pamba te bakonzi basanganaki, batambolaki nzela moko.
For, lo! kings were assembled against it; They passed away together.
5 Kasi tango kaka bamonaki yango, bakamwaki mpe bakimaki na somo.
As soon as they saw, they were astonished; They were confounded, and hasted away.
6 Mbala moko, bakomaki kolenga wana lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota
There terror seized upon them, —Pain, as of a woman in travail;
7 to lokola mopepe ya Este oyo apanzaka masuwa ya Tarsisi.
As when the east wind breaketh in pieces The ships of Tarshish.
8 Ndenge kaka bayebisaki biso, ndenge mpe tomonaki kati na engumba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, kati na engumba ya Nzambe na biso; Nzambe alendisaka yango seko na seko.
As we have heard, so have we seen In the city of the LORD of hosts, in the city of our God; God will establish it for ever. (Pause)
9 Nzambe, kati na Tempelo na Yo, tokanisaka bolingo na Yo.
We think of thy loving-kindness, O God! In the midst of thy temple!
10 Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili, ndenge moko na Kombo na Yo; loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo.
As thy name, O God! so thy praise, extendeth to the ends of the earth; Thy right hand is full of righteousness.
11 Ngomba ya Siona ezali kosepela, bamboka ya Yuda etondi na esengo mpo na mikano na Yo.
Mount Zion rejoiceth, The daughters of Judah exult, On account of thy righteous judgments.
12 Botambola pembeni ya Siona, bokende zingazinga na yango, botanga bandako na yango ya milayi.
Go round about Zion; number her towers;
13 Botala lopango na yango, botala malamu bandako na yango mpo ete bopesa sango epai ya bato oyo bakoya na sima.
Mark well her bulwarks; count her palaces; That ye may tell it to the next generation!
14 Pamba te Nzambe wana azali Nzambe na biso seko na seko mpe libela na libela; akotambolisa biso, ezala kino na kufa.
For this God is our God for ever and ever; He will be our guide unto death.