< Banzembo 47 >

1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.
Au chef des chantres. Par les fils de Coré. Psaume. Vous tous, ô peuples, battez des mains; faites retentir des cris de joie en l’honneur de Dieu!
2 Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.
Car l’Eternel est élevé, redoutable, un grand roi sur toute la terre.
3 Atiaki bikolo na se na biso, mpe mabota na se ya bokonzi na biso.
Il a soumis des nations à notre empire, jeté des peuples sous nos pieds.
4 Aponelaki biso libula na biso, oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.
Il a choisi pour nous notre héritage, l’orgueil de Jacob qu’il affectionne. (Sélah)
5 Nzambe amataki kati na koganga ya esengo; Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.
Dieu s’élève dans les hauteurs parmi les acclamations, l’Eternel, au son de la trompette.
6 Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye.
Chantez Dieu, chantez! Chantez notre roi, chantez!
7 Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.
Car Dieu est roi de toute la terre: entonnez un solennel cantique.
8 Nzambe akonzaka bikolo nyonso; Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule.
Dieu règne sur les peuples, Dieu siège sur son trône de sainteté.
9 Bato minene ya bikolo basangani, lokola bato ya Nzambe ya Abrayami, pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe; atombwama makasi.
Que les plus nobles d’entre les nations s’assemblent le peuple du Dieu d’Abraham! Car de Dieu relèvent ceux qui sont les boucliers de la terre: il est souverainement élevé.

< Banzembo 47 >