< Banzembo 46 >

1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi. Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo, azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.
聖歌隊の指揮者によって女の声のしらべにあわせてうたわせたコラの子の歌 神はわれらの避け所また力である。悩める時のいと近き助けである。
2 Yango wana, tobangaka te ata soki mabele eningani, bangomba ekweyi kati na ebale monene;
このゆえに、たとい地は変り、山は海の真中に移るとも、われらは恐れない。
3 ata soki bambonge na yango etelemi, ebimisi fulufulu mpe eningisi bangomba.
たといその水は鳴りとどろき、あわだつとも、そのさわぎによって山は震え動くとも、われらは恐れない。 (セラ)
4 Ezali na ebale moko oyo mayi na yango esepelisaka engumba ya Nzambe oyo eleki bule kati na bivandelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
一つの川がある。その流れは神の都を喜ばせ、いと高き者の聖なるすまいを喜ばせる。
5 Nzambe azali kati na yango, ebukani te; Nzambe asungaka yango wuta na tongo makasi.
神がその中におられるので、都はゆるがない。神は朝はやく、これを助けられる。
6 Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani.
もろもろの民は騒ぎたち、もろもろの国は揺れ動く、神がその声を出されると地は溶ける。
7 Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso; Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso.
万軍の主はわれらと共におられる、ヤコブの神はわれらの避け所である。 (セラ)
8 Boya kotala misala ya Yawe, makambo minene oyo asalaka kati na mokili.
来て、主のみわざを見よ、主は驚くべきことを地に行われた。
9 Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili, akataka batolotolo, abukaka makonga mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.
主は地のはてまでも戦いをやめさせ、弓を折り、やりを断ち、戦車を火で焼かれる。
10 Alobaki: « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »
「静まって、わたしこそ神であることを知れ。わたしはもろもろの国民のうちにあがめられ、全地にあがめられる」。
11 Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso; Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso.
万軍の主はわれらと共におられる、ヤコブの神はわれらの避け所である。 (セラ)

< Banzembo 46 >