< Banzembo 44 >

1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzambe, toyokaki na matoyi na biso; bakoko na biso babetelaki biso lisolo ya makambo oyo osalaki na tango na bango, na tango ya kala.
For the choirmaster. A Maskil of the sons of Korah. We have heard with our ears, O God; our fathers have told us the work You did in their days, in the days of old.
2 Na nguya na Yo, obenganaki bikolo mpe otiaki bakoko na biso; obetaki bikolo ya bapaya mpe ofulukisaki bakoko na biso.
With Your hand You drove out the nations and planted our fathers there; You crushed the peoples and cast them out.
3 Pamba te ezalaki na mopanga na bango te nde babotolaki mokili, ezalaki mpe maboko na bango te nde ebikisaki bango; kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali, nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo, pamba te ozalaki kolinga bango.
For it was not by their sword that they took the land; their arm did not bring them victory. It was by Your right hand, Your arm, and the light of Your face, because You favored them.
4 Oh Nzambe, Yo oyo ozali Mokonzi na ngai, pesa mitindo mpo na elonga ya Jakobi.
You are my King, O God, who ordains victories for Jacob.
5 Na lisungi na Yo, tolongaka banguna na biso, mpe na Kombo na Yo, tonyataka bayini na biso.
Through You we repel our foes; through Your name we trample our enemies.
6 Pamba te natiaka elikya te na tolotolo na ngai, mpe mopanga na ngai ebikisaka ngai te.
For I do not trust in my bow, nor does my sword save me.
7 Kasi ezali Yo nde obikisaka biso wuta na maboko ya bayini na biso, mpe oyokisaka bayini na biso soni.
For You save us from our enemies; You put those who hate us to shame.
8 Tomikumisaka mikolo nyonso kati na Nzambe mpe tokokumisa Kombo na Yo mpo na libela.
In God we have boasted all day long, and Your name we will praise forever.
9 Kasi obwaki biso, oyokisi biso soni mpe ozali lisusu kotambola te elongo na mampinga na biso.
But You have rejected and humbled us; You no longer go forth with our armies.
10 Otiki biso kokima liboso ya banguna na biso; mpe bayini na biso bazwi biloko na biso na makasi.
You have made us retreat from the foe, and those who hate us have plundered us.
11 Osundoli biso na maboko na bango lokola bameme ya koboma mpe opanzi biso kati na bikolo.
You have given us up as sheep to be devoured; You have scattered us among the nations.
12 Oteki bato na Yo na pamba mpe ozwi ata litomba te kowuta na boteki yango.
You sell Your people for nothing; no profit do You gain from their sale.
13 Okomisi biso eloko ya lisuma na miso ya bato oyo bazali pembeni na biso, eloko ya litio mpe ya liseki na miso ya bato oyo bazali zingazinga na biso.
You have made us a reproach to our neighbors, a mockery and derision to those around us.
14 Okomisi biso lisapo kati na bikolo, mpe bato bakomi koningisa mito na bango mpo na biso.
You have made us a byword among the nations, a laughingstock among the peoples.
15 Kosambwa ekomi tango nyonso liboso na ngai mpe soni ezipi elongi na ngai,
All day long my disgrace is before me, and shame has covered my face,
16 mpo na litio ya bato oyo bazali kofinga mpe kopamela ngai, mpe ya monguna oyo akangela ngai kanda.
at the voice of the scorner and reviler, because of the enemy, bent on revenge.
17 Makambo wana nyonso ekweyeli biso atako tobosanaki Yo te mpe tobebisaki Boyokani na Yo te,
All this has come upon us, though we have not forgotten You or betrayed Your covenant.
18 atako mitema na biso epengwaki te mpe totamboli libanda ya nzela na Yo te.
Our hearts have not turned back; our steps have not strayed from Your path.
19 Pamba te onyokolaki biso kati na etando ya bambwa ya zamba mpe ozipaki biso na molili makasi.
But You have crushed us in the lair of jackals; You have covered us with deepest darkness.
20 Soki tobosanaki Kombo ya Nzambe na biso to totombolaki maboko na biso epai ya nzambe ya mopaya,
If we had forgotten the name of our God or spread out our hands to a foreign god,
21 boni, Nzambe na biso alingaki koyeba yango te, lokola asosolaka mozindo ya mitema?
would not God have discovered, since He knows the secrets of the heart?
22 Pamba te, likolo na Yo, babomaka biso mikolo nyonso mpe bazwaka biso lokola bameme ya koboma.
Yet for Your sake we face death all day long; we are considered as sheep to be slaughtered.
23 Nkolo, lamuka! Mpo na nini ozali kolala? Lamuka, kobwaka biso te mpo na libela.
Wake up, O Lord! Why are You sleeping? Arise! Do not reject us forever.
24 Yawe, mpo na nini ozali kobomba elongi na Yo? Mpo na nini ozali kobosana pasi mpe minyoko na biso?
Why do You hide Your face and forget our affliction and oppression?
25 Pamba te tokweyi na putulu, mpe nzoto na biso ekangami na mabele.
For our soul has sunk to the dust; our bodies cling to the earth.
26 Telema, yaka kosunga biso, kangola biso mpo na bolingo na Yo!
Rise up; be our help! Redeem us on account of Your loving devotion.

< Banzembo 44 >