< Banzembo 43 >
1 Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngai liboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te; kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe ya bato mabe.
Mungu, uniletee haki, na unitetee dhidi ya taifa lisilo la kimungu.
2 Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai, oyo batonga makasi; mpo na nini osundoli ngai? Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye, na se ya minyoko ya monguna?
Kwa kuwa wewe ni Mungu wa nguvu zangu. Kwa nini umenikataa? Kwa nini ninaenenda katika maombolezo kwa sababu ya ukandamizaji wa adui yangu?
3 Tinda mwinda mpe solo na Yo mpo ete ekamba mpe emema ngai na ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka;
Oh, tuma nuru yako na kweli yako ziniongoze. Ziniletee mlima wako mtakatifu na makao yako.
4 bongo nakokende na etumbelo epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai. Oh Yawe, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda.
Kisha nitakwenda madhabahuni mwa Mungu, kwa Mungu wangu aliye furaha yangu kuu. Nami nitakusifu wewe kwa kinubi, Ee Mungu, Mungu wangu.
5 Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai.
Roho yangu, kwa nini umeinama? Kwa nini unahuzuni ndani yangu? Kwa kuwa nitamsifu tena yeye ambaye ni wokovu wangu na Mungu wangu.