< Banzembo 42 >

1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ndenge mbuli eyokaka posa ya komela mayi, ndenge wana mpe molimo na ngai ezali na posa na Yo, Nzambe.
For the Chief Musician; Maschil of the sons of Korah. As the hart panteth after the water brooks, so panteth my soul after thee, O God.
2 Molimo na ngai ezali na posa ya Nzambe, ya Nzambe na bomoi. Tango nini nakoki kokende, mpe tango nini nakoki kokutana na Nzambe?
My soul thirsteth for God, for the living God: when shall I come and appear before God?
3 Butu mpe moyi, mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai; pamba te balobaka na ngai tango nyonso: « Nzambe na Yo azali wapi? »
My tears have been my meat day and night, while they continually say unto me, Where is thy God?
4 Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo, ndenge mpe nasopaka molimo na ngai: Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato, nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe, kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondi lokola makelele ya bato oyo bazali na feti.
These things I remember, and pour out my soul within me, how I went with the throng, and led them to the house of God, with the voice of joy and praise, a multitude keeping holyday.
5 Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye? Mpo na nini ozali komitungisa makasi kati na ngai? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakokumisa lisusu lobiko na Ye.
Why art thou cast down, O my soul? and [why] art thou disquieted within me? hope thou in God: for I shall yet praise him [for] the health of his countenance.
6 Nzambe, molimo na ngai elembi kati na ngai; yango wana nazali kokanisa Yo wuta na mokili ya Yordani, wuta na songe ya ngomba Erimoni mpe wuta na ngomba Mitseari.
O my God, my soul is cast down within me: therefore do I remember thee from the land of Jordan, and the Hermons, from the hill Mizar.
7 Mozindo ebendaka mozindo tango bambonge na Yo nyonso etombokaka; Ezala ya mike to ya minene, elekaka likolo na ngai.
Deep calleth unto deep at the noise of thy waterspouts: all thy waves and thy billows are gone over me.
8 Na moyi, Yawe apesaka mitindo epai ya bolingo na Ye; na butu, nakumisaka Ye na banzembo mpe nasambelaka Nzambe ya bomoi na ngai.
[Yet] the LORD will command his lovingkindness in the day-time, and in the night his song shall be with me, [even] a prayer unto the God of my life.
9 Nalobi na Nzambe, Libanga na ngai: « Mpo na nini obosani ngai? Mpo na nini nasengeli kotambola na mawa kati na motema mpe na se ya minyoko ya monguna? »
I will say unto God my rock, Why hast thou forgotten me? why go I mourning because of the oppression of the enemy?
10 Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba: « Wapi Nzambe na yo? »
As with a sword in my bones, mine adversaries reproach me; while they continually say unto me, Where is thy God?
11 Molimo na ngai, mpo na nini olembi boye? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai? Tia elikya na yo kati na Nzambe. Nakokumisa Ye lisusu, lobiko mpe Nzambe na ngai.
Why art thou cast down, O my soul? and why art thou disquieted within me? hope thou in God: for I shall yet praise him, [who is] the health of my countenance, and my God.

< Banzembo 42 >