< Banzembo 4 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda. Nzambe, bosembo na ngai, soki nabeleli Yo, yanola ngai. Kangola ngai na pasi, salela ngai ngolu, mpe yoka libondeli na ngai.
For the choirmaster. With stringed instruments. A Psalm of David. Answer me when I call, O God of my righteousness! You have relieved my distress; show me grace and hear my prayer.
2 Bino bato, kino tango nini bokoyokisa nkembo na ngai soni? Kino tango nini bokomisepelisa na makambo ya pamba mpe bokolanda makambo ya lokuta?
How long, O men, will my honor be maligned? How long will you love vanity and seek after lies?
3 Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko mosali oyo azali sembo na miso na Ye; Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.
Know that the LORD has set apart the godly for Himself; the LORD hears when I call to Him.
4 Soki bosiliki, bosalaka masumu te; soki bolali na mbeto, bolukaka kososola makambo mpe bovandaka kimia.
Be angry, yet do not sin; on your bed, search your heart and be still.
5 Bobonzaka bambeka kolanda mibeko mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.
Offer the sacrifices of the righteous and trust in the LORD.
6 Bato mingi bazali kotuna: « Nani akomemela biso bolamu? » Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.
Many ask, “Who can show us the good?” Shine the light of Your face upon us, O LORD.
7 Tondisa motema na ngai na esengo soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.
You have filled my heart with more joy than when grain and new wine abound.
8 Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia, pamba te, Yo moko Yawe, osalaka ete navanda na kimia.
I will lie down and sleep in peace, for You alone, O LORD, make me dwell in safety.