< Banzembo 39 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi mpe ya Yedutuni. Nzembo ya Davidi. Namilobelaki: « Nakosala keba na etamboli na ngai mpo ete monoko na ngai esala masumu te; nakobatela penza monoko na ngai tango nyonso moto mabe akozala liboso na ngai. »
بۆ سەرۆکی کۆمەڵی مۆسیقاژەنان، بۆ یەدوتون زەبوورێکی داود. گوتم: «چاودێری ڕێگای خۆم دەکەم و زمانی خۆم لە گوناه دەپارێزم. ئەوەندەی بەدکار لەبەردەممە، دەمم بە لغاو دەبەستم.»
2 Boye nakangaki monoko na ngai mpe navandaki nye, natikalaki koloba ata likambo moko te; pasi na ngai ebakisamaki makasi.
بەڵام کاتێک کپ و بێدەنگ بووم، تەنانەت شتی چاکیشم نەدەگوت، ئازارم زیاد بوو.
3 Motema na ngai eswaki, moto ezalaki kopela kati na ngai, mpe nalobaki na nzela ya monoko na ngai.
دڵم لە ناخمەوە قوڵپی دەدا، هەروەها کە نوقومی بیرکردنەوە دەبووم، گڕم دەگرت، ئەوسا بە زمانم هاتمە قسەکردن:
4 Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.
«ئەی یەزدان، کۆتایی ژیانی خۆم پیشان بدە، هەروەها ڕۆژەکانی ژیانم چەندە، بۆ ئەوەی بزانم من چ فەوتاوێکم.
5 Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama, ezali pamba na miso na Yo. Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.
بەڕاستی ڕۆژگاری منت کردووە بە بستێک، تەمەنم لەبەرچاوت وەک هیچە. ژیانی هەر مرۆڤێک تەنها هەناسەیەکە.
6 Moto akendaka mpe azongaka, azali kaka lokola elili; amitungisaka kaka pamba, andukaka bomengo, kasi ayebaka te soki nani akotikala na yango.
«بەڕاستی مرۆڤ وەک سێبەر دێت و دەچێت، ڕەنج دەدات، بەڵام بێگومان بێهوودەیە، سامان کۆدەکاتەوە، نازانێت دوای خۆی بۆ کێ دەبێت.
7 Sik’oyo, oh Nkolo, nazela lisusu nini? Natiaka elikya na ngai kati na Yo.
«ئێستاش ئەی پەروەردگار، من چاوەڕێی چی بکەم؟ هیوای من بە تۆیە.
8 Bikisa ngai na mabe na ngai nyonso, kopesa nzela te na bazoba ete bafinga ngai.
لە هەموو سەرپێچییەکانم ڕزگارم بکە، مەمکە بە گاڵتەجاڕی گێلەکان.
9 Nakangi monoko, nakoloba lisusu te, pamba te Yo nde osali.
بێدەنگ بووم، دەمم ناکەمەوە، چونکە تۆ ئەوەی کە ئەمەت کردووە.
10 Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.
بەڵای خۆت لەسەر من لابدە، بە زەبرەکانی دەستی تۆ فەوتام.
11 Opesaka bato etumbu mpo na masumu na bango mpo na kozongisa bango na nzela; obebisaka biloko na bango ya motuya lokola nselele. Solo, moto nyonso azali kaka mopepe.
مرۆڤ بە سەرزەنشتکردنی لەبەر گوناهەکانی تەمبێ دەکەیت، وەک مۆرانە سامانی ئەو لەناودەبەیت، هەر مرۆڤێک تەنها هەناسەیەکە.
12 Yawe, yoka libondeli na ngai; yoka na bokebi, wana nazali koganga mpo na kosenga lisungi, kovanda nye te liboso ya mpinzoli na ngai, pamba te epai na Yo, nazali mopaya mpe moleki nzela lokola bakoko na ngai.
«ئەی یەزدان، گوێ لە نوێژم بگرە، گوێ لە هاوارم بگرە، لە ئاست گریانم گوێت دامەخە، چونکە لەلای تۆ وەک نامۆیەکم، میوانم وەک هەموو باوباپیرانم.
13 Kotala ngai te mpo ete nasepela lisusu, liboso ete nakende na ngai mpe nazala lisusu te.
ڕووی گرژت لە من وەرگێڕە، هەتا شادمان ببمەوە، پێش ئەوەی بڕۆم و نەمێنم.»

< Banzembo 39 >