< Banzembo 34 >

1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki. Nakopambola Yawe tango nyonso, nakokumisa Ye mikolo nyonso na bibebu na ngai.
By David; when he pretended to be insane before Abimelech, who drove him away, and he departed. I will bless the LORD at all times. His praise will always be in my mouth.
2 Tika ete bomoi na ngai emikumisa kati na Yawe; tika ete banyokolami bayoka mpe basepela!
My soul shall boast in the LORD. The humble shall hear of it and be glad.
3 Boya kosakola elongo na ngai ete Yawe azali monene! Tonetola Kombo na Ye, biso nyonso.
Oh magnify the LORD with me. Let’s exalt his name together.
4 Nalukaki Yawe, mpe ayanolaki ngai; akangolaki ngai na somo na ngai nyonso.
I sought the LORD, and he answered me, and delivered me from all my fears.
5 Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo, mpe bayokisamaka soni ata moke te.
They looked to him, and were radiant. Their faces shall never be covered with shame.
6 Mobola agangaki, mpe Yawe ayokaka ye; abikisaki ye na pasi na ye nyonso.
This poor man cried, and the LORD heard him, and saved him out of all his troubles.
7 Anjelu ya Yawe atongaka molako na ye zingazinga ya bato oyo batosaka Yawe, mpe akangolaka bango.
The LORD’s angel encamps around those who fear him, and delivers them.
8 Bomeka elengi mpe botala ndenge nini Yawe azali malamu; Esengo na moto oyo azwaka Yawe lokola ebombamelo na ye!
Oh taste and see that the LORD is good. Blessed is the man who takes refuge in him.
9 Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te.
Oh fear the LORD, you his saints, for there is no lack with those who fear him.
10 Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala, kasi bato oyo balukaka Yawe bakozanga eloko moko.
The young lions do lack, and suffer hunger, but those who seek the LORD shall not lack any good thing.
11 Bana na ngai, boya, boyoka ngai; Nakolakisa bino kotosa Yawe.
Come, you children, listen to me. I will teach you the fear of the LORD.
12 Nani asepelaka na bomoi? Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo?
Who is someone who desires life, and loves many days, that he may see good?
13 Batela lolemo na yo mosika na mabe, mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.
Keep your tongue from evil, and your lips from speaking lies.
14 Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, luka kimia mpe koba na yango.
Depart from evil, and do good. Seek peace, and pursue it.
15 Miso ya Yawe etalaka bato ya sembo, mpe matoyi na Ye eyokaka koganga na bango;
The LORD’s eyes are toward the righteous. His ears listen to their cry.
16 kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.
The LORD’s face is against those who do evil, to cut off their memory from the earth.
17 Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.
The righteous cry, and the LORD hears, and delivers them out of all their troubles.
18 Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.
The LORD is near to those who have a broken heart, and saves those who have a crushed spirit.
19 Pasi mingi ekangaka moto ya sembo, kasi Yawe akangolaka ye na nyonso,
Many are the afflictions of the righteous, but the LORD delivers him out of them all.
20 abatelaka mikuwa na ye nyonso mpo ete moko te kati na yango ebukana.
He protects all of his bones. Not one of them is broken.
21 Mabe ebomaka moto mabe, mpe bayini ya moto ya sembo bakozwa etumbu.
Evil shall kill the wicked. Those who hate the righteous shall be condemned.
22 Yawe akangolaka bomoi ya basali na Ye; mpe bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango bakozwa etumbu te.
The LORD redeems the soul of his servants. None of those who take refuge in him shall be condemned.

< Banzembo 34 >