< Banzembo 33 >

1 Bino bato ya sembo, bobeta milolo ya esengo na tina na Yawe! Kokumisa Nzambe ebongi na bato oyo bazali alima.
Justes, réjouissez-vous en l'Éternel! La louange convient aux hommes droits.
2 Bosanzola Yawe na nzenze, bosanzola Ye na lindanda ya basinga zomi.
Célébrez l'Éternel avec la harpe; Louez-le sur la lyre à dix cordes!
3 Boyembela Yawe nzembo ya sika, bobetisa bibetelo mindule elongo na koganga ya esengo.
Chantez en son honneur un cantique nouveau; Faites retentir avec art vos instruments et vos voix!
4 Pamba te Liloba na Yawe ezali alima, misala na Ye nyonso ekokisamaka na boyengebene.
Car la parole de l'Éternel est juste. Et sa fidélité se montre dans toutes ses oeuvres.
5 Yawe alingaka bosembo mpe alima; mokili etondi na bolingo na Ye.
Il aime la justice et l'équité. La terre est pleine de la bonté de l'Éternel.
6 Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.
Les cieux ont été créés par la parole de l'Éternel, Et toute leur armée par le souffle de sa bouche.
7 Asangisaka mayi ya bibale minene esika moko, mpe atiaka yango na bisika ya mozindo.
Il rassemble comme en un monceau les eaux de la mer; Il amasse les flots dans ses réservoirs.
8 Tika ete mokili mobimba etosa Yawe! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga liboso na Ye.
Que toute la terre craigne l'Éternel! Que tous les habitants du monde le redoutent!
9 Pamba te alobaki, mpe likambo esalemaki; mpe apesaki mitindo, mpe emonanaki.
Car il parle, et la chose existe; Il commande, et elle paraît.
10 Yawe akweyisaka mikano ya bikolo, abebisaka mabongisi ya bato.
L'Éternel déjoue les desseins des nations; Il anéantit les projets des peuples.
11 Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko, mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.
Mais les desseins de l'Éternel subsistent à perpétuité; Les projets de son coeur durent d'âge en âge.
12 Esengo na ekolo oyo Yawe azali Nzambe na yango. Esengo na bato oyo aponaki mpo na libula na Ye.
Heureuse la nation dont l'Éternel est le Dieu! Heureux le peuple qu'il s'est choisi pour héritage!
13 Yawe atalaka wuta na likolo, amonaka bana nyonso ya bato.
L'Éternel regarde du haut des cieux; Il voit tous les enfants des hommes.
14 Wuta na evandelo na Ye, atalaka bavandi nyonso ya mokili.
Du lieu de sa demeure il observe Tous les habitants de la terre.
15 Ye oyo asalaka mitema nyonso ya bato asosolaka makambo nyonso oyo basalaka.
C'est lui qui a formé le coeur de chacun d'eux. Et qui observe toutes leurs actions.
16 Ezali te limpinga monene nde ebikisaka mokonzi to nguya monene nde ekangolaka elombe.
Ce n'est pas au nombre de ses soldats Que le roi doit sa victoire; Ce n'est pas à sa grande vigueur que le guerrier doit son salut.
17 Mpunda ezali na nguya te ya kopesa lobiko, makasi na yango nyonso ekangolaka te.
Pour triompher, on compte en vain sur le cheval: Sa grande vigueur n'assure pas le salut.
18 Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,
Mais l'Éternel a les yeux sur ceux qui le craignent. Sur ceux qui espèrent en sa grâce.
19 mpo na kokangola bango na kufa mpe kobatela bango na bomoi ata na tango ya nzala makasi.
Aussi les délivre-t-il de la mort: Il les fait vivre, même en temps de famine.
20 Totielaka Yawe motema; azali lisungi mpe nguba na biso.
Notre âme espère en l'Éternel: Il est notre aide et notre bouclier.
21 Solo, mitema na biso esepelaka kati na Ye, pamba te totiaka elikya na biso kati na Kombo na Ye ya bule.
C'est en lui que notre coeur se réjouit; C'est en son saint nom que nous avons mis notre confiance.
22 Yawe, lokola totiaka elikya na biso kati na Yo, tika ete bolingo na Yo ezala elongo na biso.
Que ta grâce, ô Éternel, repose sur nous, Puisque nous avons mis notre espérance en toi!

< Banzembo 33 >