< Banzembo 32 >

1 Nzembo ya Davidi. Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami, mpe masumu na ye elongwe!
大卫的训诲诗。 得赦免其过、遮盖其罪的, 这人是有福的!
2 Esengo na moto oyo Yawe atangelaka lisumu te, mpe atambolaka na lokuta te.
凡心里没有诡诈、耶和华不算为有罪的, 这人是有福的!
3 Lokola nazalaki kondima mabe na ngai te, nazalaki tango nyonso kolela mpo na pasi.
我闭口不认罪的时候, 因终日唉哼而骨头枯干。
4 Butu mpe moyi, loboko na Yo ezalaki kofinafina ngai; makasi na ngai ekomaki kosila ndenge makasa ekawukaka na eleko ya moyi.
黑夜白日,你的手在我身上沉重; 我的精液耗尽,如同夏天的干旱。 (细拉)
5 Tango nandimaki masumu na ngai mpe nabombaki mabe na ngai te, nalobaki: « Nakotubela masumu na ngai liboso ya Yawe. » Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.
我向你陈明我的罪, 不隐瞒我的恶。 我说:我要向耶和华承认我的过犯, 你就赦免我的罪恶。 (细拉)
6 Boye, tika ete bayengebene nyonso basambelaka Yo na tango ya malamu! Soki mayi minene etomboki, bambonge na yango ekozwa bango te.
为此,凡虔诚人都当趁你可寻找的时候祷告你; 大水泛溢的时候,必不能到他那里。
7 Ozali ebombamelo na ngai; obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.
你是我藏身之处; 你必保佑我脱离苦难, 以得救的乐歌四面环绕我。 (细拉)
8 Olobaki: « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.
我要教导你,指示你当行的路; 我要定睛在你身上劝戒你。
9 Kozala te lokola mpunda to lokola mile ezanga bososoli, oyo bakangaka nguya na yango na nzela ya ebende mpe ya singa oyo batiaka na minoko na yango mpo na kopekisa yango kopusana pene na yo. »
你不可像那无知的骡马, 必用嚼环辔头勒住它; 不然,就不能驯服。
10 Bato mabe bazali na pasi mingi, kasi bolamu ya Yawe ezingelaka bato oyo batiaka elikya na Yawe.
恶人必多受苦楚; 惟独倚靠耶和华的必有慈爱四面环绕他。
11 Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe, bozala na esengo! Bino nyonso oyo bozali na mitema alima, bobeta milolo ya esengo.
你们义人应当靠耶和华欢喜快乐; 你们心里正直的人都当欢呼。

< Banzembo 32 >