< Banzembo 3 >
1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye. Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni! Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai!
Псалом Давида, когда он бежал от Авессалома, сына своего. Господи! как умножились враги мои! Многие восстают на меня
2 Ebele bazali koloba na tina na ngai: « Nzambe akobikisa ye te! »
многие говорят душе моей: “нет ему спасения в Боге”.
3 Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai.
Но Ты, Господи, щит предо мною, слава моя, и Ты возносишь голову мою.
4 Nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.
Гласом моим взываю к Господу, и Он слышит меня со святой горы Своей.
5 Nalalaka mpe nazwaka pongi; nalamukaka lisusu, pamba te Yawe azali makasi na ngai.
Ложусь я, сплю и встаю, ибо Господь защищает меня.
6 Nakobanga te atako ebele ya bankoto bazingeli ngai na bangambo nyonso.
Не убоюсь тем народа, которые со всех сторон ополчились на меня.
7 Yawe, telema! Nzambe na ngai, kangola ngai! Beta banguna na ngai nyonso bambata, buka bato mabe minu.
Восстань, Господи! спаси меня, Боже мой! ибо Ты поражаешь в ланиту всех врагов моих; сокрушаешь зубы нечестивых.
8 Kokangolama na ngai ewutaka na Yawe. Tika ete lipamboli na Yo ewumela kati na bato na Yo.
От Господа спасение. Над народом Твоим благословение Твое.