< Banzembo 29 >
1 Nzembo ya Davidi. Bopesa Yawe, bino ba-anjelu ya Nzambe, bopesa Yawe nkembo mpe makasi.
天主的眾子,請讚美上主,請將讚美光榮,歸於上主。
2 Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye; bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye.
請將主的榮耀,歸於上主,穿上聖潔華服,朝拜上主。
3 Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi, Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito, Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene.
上主的聲音響徹水面,天主雷鳴在顯示莊嚴,上主臨到澎湃的水面。
4 Mongongo ya Yawe ezali na nguya; mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi.
上主的聲音具有威權,上主的聲音具有莊嚴。
5 Mongongo ya Yawe ebukaka banzete ya sedele; Yawe abukaka banzete ya sedele ya Libani.
上主的聲音劈斷香柏,上主折斷黎巴嫩香柏;
6 Apumbwisaka Libani lokola mwana ngombe, apumbwisaka Sirioni lokola mwana ya mpakasa.
使黎巴嫩像牛犢一樣舞蹈,使息爾翁像小牛一樣跳躍。
7 Mongongo ya Yawe ebimaka elongo na bakake ya moto.
上主的聲音放射出火舌。
8 Mongongo ya Yawe elengisaka esobe; Yawe alengisaka Esobe ya Kadeshi.
上主的聲音震動了曠野,上主震動了卡士德曠野。
9 Mongongo ya Yawe esalaka ete mboloko ebota, esalaka mpe ete zamba etikala pamba. Kati na Tempelo ya Yawe, nyonso egangaka: « Nkembo! »
上主的聲音搖撼橡樹,剝光森林;凡在祂殿中的都齊聲高呼:光榮。
10 Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzi na likolo ya mpela; Yawe avandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mokonzi mpo na libela.
上主坐在洪水之上,上主永遠高坐為王。
11 Yawe apesaka bato na Ye makasi; Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia.
上主必將勇力賜給祂的百姓,上主必以平安祝福祂的人民。