< Banzembo 28 >

1 Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo! Ozali Libanga na ngai, koboya te koyoka ngai. Soki te, nakozala lokola bato oyo bazali kokita na kunda.
Of David. To You, O LORD, I call; be not deaf to me, O my Rock. For if You remain silent, I will be like those descending to the Pit.
2 Yoka ngai tango nabondelaka Yo mpo na kosenga lisungi, tango natombolaka maboko na ngai, na kotala na ngambo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
Hear my cry for mercy when I call to You for help, when I lift up my hands toward Your holy sanctuary.
3 Kokumba ngai te elongo na bato mabe, elongo na bato oyo basalaka mabe, oyo balobaka makambo ya kimia epai ya baninga na bango, kasi babombaka mabe kati na mitema na bango.
Do not drag me away with the wicked, and with the workers of iniquity, who speak peace to their neighbors while malice is in their hearts.
4 Zongisela bango kolanda misala na bango, kolanda misala mabe na bango; zongisela bango kolanda misala ya maboko na bango, mpe kweyisela bango oyo ekoki na misala na bango.
Repay them according to their deeds and for their works of evil. Repay them for what their hands have done; bring back on them what they deserve.
5 Pamba te bamemiaka te misala ya Yawe mpe makambo oyo akokisaka, akobamba bango na mabele mpe akotikala kotelemisa bango lisusu te.
Since they show no regard for the works of the LORD or what His hands have done, He will tear them down and never rebuild them.
6 Tika ete Yawe akumisama, pamba te ayanoli mabondeli na ngai.
Blessed be the LORD, for He has heard my cry for mercy.
7 Yawe azali makasi mpe nguba na ngai; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
The LORD is my strength and my shield; my heart trusts in Him, and I am helped. Therefore my heart rejoices, and I give thanks to Him with my song.
8 Yawe azali makasi ya bato na Ye, ndako batonga makasi epai wapi mopakolami na Ye azwaka lobiko.
The LORD is the strength of His people, a stronghold of salvation for His anointed.
9 Yawe, bikisa bato na Yo mpe pambola libula na Yo; zala mobateli na bango mpe sunga bango mpo na libela.
Save Your people and bless Your inheritance; shepherd them and carry them forever.

< Banzembo 28 >