< Banzembo 27 >

1 Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai; nakobanga nani? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai; nakolenga liboso ya nani?
Of David. The LORD is my light and my salvation— whom shall I fear? The LORD is the stronghold of my life— whom shall I dread?
2 Tango bato mabe babundisaka ngai mpo na koluka kosala ngai mabe, ezali bayini mpe banguna na ngai nde baninganaka mpe bakweyaka.
When the wicked came upon me to devour my flesh, my enemies and foes stumbled and fell.
3 Ata limpinga ezingeli ngai, motema na ngai ekobanga soki moke te; ata etumba etelemi mpo na koboma ngai, atako bongo, nakozala kaka na elikya makasi.
Though an army encamps around me, my heart will not fear; though a war breaks out against me, I will keep my trust.
4 Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi: nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
One thing I have asked of the LORD; this is what I desire: to dwell in the house of the LORD all the days of my life, to gaze on the beauty of the LORD and seek Him in His temple.
5 Pamba te, na tango ya pasi, akobatela ngai kati na evandelo na Ye, akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.
For in the day of trouble He will hide me in His shelter; He will conceal me under the cover of His tent; He will set me high upon a rock.
6 Bongo, nakotombola moto na ngai na likolo ya banguna oyo bazingeli ngai; nakobanda kobonza, na se ya lokito ya esengo, bambeka kati Ndako na Ye ya bule; nakobanda koyembela Yawe mpe kobetela Ye mindule.
Then my head will be held high above my enemies around me. At His tabernacle I will offer sacrifices with shouts of joy; I will sing and make music to the LORD.
7 Yawe, yoka mongongo na ngai, soki nabeleli Yo; salela ngai ngolu mpe yanola ngai.
Hear, O LORD, my voice when I call; be merciful and answer me.
8 Motema na ngai elobi na tina na Yo: « Tala elongi na Ye! » Yawe, nakotala elongi na Yo.
My heart said, “Seek His face.” Your face, O LORD, I will seek.
9 Kopesa ngai mokongo te, kobengana mosali na Yo te na kanda; osungaki ngai. Kotika ngai te, kosundola ngai te, Nzambe, Mobikisi na ngai.
Hide not Your face from me, nor turn away Your servant in anger. You have been my helper; do not leave me or forsake me, O God of my salvation.
10 Ata tata mpe mama na ngai basundoli ngai, Yawe akolokota ngai.
Though my father and mother forsake me, the LORD will receive me.
11 Yawe, lakisa ngai nzela na Yo, tambolisa ngai na nzela ya alima, pamba te banguna na ngai bazali koluka ngai.
Teach me Your way, O LORD, and lead me on a level path, because of my oppressors.
12 Kotika te ete nakangama na motambo ya bayini na ngai, pamba te batatoli ya lokuta batelemi mpo na kokosela ngai makambo, bazali kobimisa maloba mabe.
Do not hand me over to the will of my foes, for false witnesses rise up against me, breathing out violence.
13 Nakozalaka na elikya na likambo oyo: nakobika bolamu ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.
Still I am certain to see the goodness of the LORD in the land of the living.
14 Talela Yawe! Zala makasi mpe yika mpiko! Talela Yawe!
Wait patiently for the LORD; be strong and courageous. Wait patiently for the LORD!

< Banzembo 27 >