< Banzembo 26 >

1 Nzembo ya Davidi. Yawe, longisa ngai na miso ya basambisi, pamba te natambolaka na bosembo; natielaka Yawe motema, nakozonga sima te.
Давидів.
2 Yawe, tala ngai malamu mpe meka ngai, sosola motema mpe makanisi na ngai,
Перевір мене, Господи, і ви́пробуй мене, перетопи́ мої ни́рки та серце моє,
3 pamba te napengwaka te liboso ya bolingo na Yo mpe nabikaka bomoi na ngai kolanda bosembo na Yo.
бо перед очима моїми Твоє милосердя, і в правді Твоїй я ходив.
4 Navandaka esika moko te na bakosi, natambolaka nzela moko te na bato ya mitema mibale.
Не сидів я з людьми́ неправдивими, і не бу́ду ходити з лукавими,
5 Nayinaka kosangana elongo na bato ya misala mabe mpe navandaka te esika moko na bato mabe.
я громаду злочи́нців знена́видів, і з грішниками я сидіти не буду.
6 Yawe, nasukoli maboko na ngai mpo na kolakisa ete nasali mabe te, mpe nabandi na etumbelo na Yo,
Умию в неви́нності руки свої, й обійду́ Твого, Господи, же́ртівника,
7 mpo na kozongisela Yo matondi mpe kotatola misala minene na Yo.
щоб хвалу́ Тобі го́лосно ви́голосити, та звісти́ти про всі чу́да Твої.
8 Yawe, nasepelaka na Tempelo epai wapi ovandaka elongo na nkembo na Yo.
Господи, — полюбив я оселю дому Твого́, і місце перебува́ння слави Твоєї.
9 Kolongola te molimo na ngai nzela moko na bato ya masumu, bomoi na ngai elongo na basopi makila,
Не губи Ти моєї душі з нечестивими, та мого життя з кровоже́рами,
10 oyo maboko na bango etondi na makila, mpe maboko na bango ya mibali etondi na kanyaka.
що в руках їх злоді́йство, що їхня прави́ця напо́внена пі́дкупом.
11 Natambolaka na bomoi ya bosembo; kangola ngai mpe salela ngai ngolu.
А я бу́ду ходити в своїй непоро́чності, — визволь мене та помилуй мене!
12 Makolo na ngai etambolaka na nzela ya alima; nakopambola Yawe kati na mayangani ya monene.
Нога моя стала на рівному місці, — на збо́рах я благословля́тиму Господа!

< Banzembo 26 >