< Banzembo 25 >

1 Nzembo ya Davidi. Yawe, Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo.
К Теби, Господе, подижем душу своју.
2 Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo; sala ete nayoka soni te, mpe banguna na ngai basepela te na tina na ngai.
Боже мој! У Тебе се уздам; не дај да се осрамотим, да ми се не свете непријатељи моји.
3 Bato nyonso oyo batalelaka Yo bakotikala koyokisama soni ata moke te; kaka ba-oyo bapesaka Yo mokongo nde bakoyokisama soni.
И који се год у Те уздају, неће се осрамотити; осрамотиће се они који се одмећу од Тебе беспутно.
4 Yawe, lakisa ngai nzela, teya ngai nzela oyo olingi ete nalanda.
Покажи ми, Господе, путеве своје, научи ме ходити стазама Твојим.
5 Kamba ngai kati na bosolo na Yo mpe pesa ngai mayele, pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai; mpe ngai natiaka elikya na ngai kati na Yo tango nyonso.
Упути ме истини својој, и научи ме; јер си Ти Бог спасења мог, Теби се надам сваки дан.
6 Yawe, kanisa mawa mpe bolingo na Yo, pamba te ezali mpo na libela na libela.
Опомени се милосрђа свог, Господе, и милости своје; јер су откако је века.
7 Yawe, kokanisa te masumu mpe botomboki ya bolenge na ngai; kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo, pamba te ozali malamu.
Грехова младости моје, и мојих преступа не помињи; по милости својој помени мене, ради доброте своје, Господе!
8 Solo, Yawe azali malamu mpe alima; atalisaka banzela na Ye epai ya bato ya masumu.
Добар је и праведан Господ; тога ради показује грешницима пут.
9 Atambolisaka bato oyo bamikitisa, kati na banzela ya sembo, mpe ateyaka bango banzela na Ye.
Упућује кротке истини, учи кротке ходити путем Његовим.
10 Banzela nyonso ya Yawe etalisaka bolingo mpe boyengebene na Ye mpo na bato oyo babatelaka boyokani mpe malako na Ye.
Сви су путеви Господњи милост и истина онима који држе завет Његов и откривење Његово.
11 Yawe, mpo na bolingo ya Kombo na Yo, limbisa masumu na ngai, atako ezali minene.
Ради имена свог, Господе, опрости грех мој, јер је велик.
12 Banani bazali bato oyo batosaka Yawe? Alakisaka bango nzela ya kopona.
Који се човек боји Господа? Он ће му показати који пут да изабере.
13 Boye, bakolekisa mikolo ya bomoi na bango kati na bofuluki, mpe mokili ekozala libula ya bana na bango.
Душа ће његова у добру почивати, и семе ће његово владати земљом.
14 Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.
Тајна је Господња у оних који Га се боје, и завет свој јавља им.
15 Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te kaka Ye nde akolongola makolo na ngai na motambo.
Очи су ми свагда управљене ка Господу, јер Он извлачи из замке ноге моје.
16 Yawe, balola miso na Yo epai na ngai mpe salela ngai ngolu, pamba te nazali kaka ngai moko, mpe nazali monyokolami.
Погледај ме и смилуј се на ме, јер сам инокосан и невољник.
17 Lembisa pasi ya motema na ngai mpe kangola ngai na mitungisi na ngai.
Нек се рашири стиснуто срце моје, из тескобе моје извади ме.
18 Tala pasi mpe kolela na ngai, mpe limbisa masumu na ngai nyonso.
Види јаде моје и муку моју, и опрости ми све грехове моје.
19 Tala ndenge nini banguna na ngai bazali ebele, mpe ndenge nini bazali koyina ngai makasi!
Погледај непријатеље моје како их је много и каквом ме пакосном ненавишћу ненавиде.
20 Batela bomoi na ngai mpe kangola ngai; sala ete nayoka soni te, pamba te nabombamaka kati na Yo.
Сачувај душу моју и избави ме; не дај да се осрамотим, јер се у Тебе уздам.
21 Lokola mpe natielaka Yo motema, tika ete bozangi pamela mpe bosembo ebatela ngai.
Безазленост и правда нека ме сачува, јер се у Тебе уздам.
22 Nzambe, kangola Isalaele, na pasi na yango nyonso!
Избави, Боже, Израиља од свих невоља његових.

< Banzembo 25 >