< Banzembo 24 >
1 Nzembo ya Davidi. Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Yawe. Mokili mpe ezali ya Yawe, elongo na bavandi na yango.
Een psalm van David. Aan Jahweh behoort de aarde, met wat ze bevat, De wereld en die er op wonen;
2 Pamba te ezali Yawe nde atia yango na likolo ya bibale minene mpe apikaki yango na likolo ya miluka.
Want Hij heeft ze op de zeeën gegrond, En geplant op de stromen.
3 Nani akokoka komata ngomba ya Yawe? Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule?
Wie mag de berg van Jahweh bestijgen, Wie zijn heilige stede betreden?
4 Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto, oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko mpe alapaka ndayi ya lokuta te.
Die rein is van handen, en zuiver van hart; In wiens ziel geen bedrog is, en die geen valse eden zweert.
5 Yawe akopambola ye; mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo.
Hij zal zegen van Jahweh ontvangen, En loon van den God van zijn heil:
6 Ndenge wana nde ezali, ekeke ya bato oyo bakangamaka na Yo, ba-oyo balukaka elongi na Yo, Nzambe ya Jakobi.
Die behoort tot hen, die Jahweh vereren, En het aangezicht zoeken van Jakobs God.
7 Bino bikuke, botombola mitondo na bino! Bino bikuke ya kala, bomitombola! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota!
Poorten, heft uw kroonlijsten op; Eeuwige posten, rekt u omhoog: De Koning der glorie gaat binnen!
8 Nani azali Mokonzi yango ya nkembo? Ezali Yawe, Elombe ya nguya; Yawe, Elombe ya bitumba.
Wie is de Koning der glorie? Jahweh, krachtig en sterk, Jahweh, de held in de strijd!
9 Bino bikuke, botombola mitondo na bino! Bino bikuke ya kala, bomitombola! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota!
Poorten, heft uw kroonlijsten op; Eeuwige posten, rekt u omhoog: De Koning der glorie gaat binnen!
10 Nani azali Mokonzi yango ya nkembo? Ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azali Mokonzi ya nkembo!
Wie is de Koning der glorie? Jahweh der heirscharen Is de Koning der glorie!