< Banzembo 22 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. » Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai? Mpo na nini otelemi mosika? Mpo na nini ozali kobikisa ngai te? Mpo na nini ozali koyoka te koganga na ngai?
Zborovođi. Po napjevu “Košuta u zoru”. Psalam. Davidov. Bože moj, Bože moj, zašto si me ostavio? Daleko si od ridanja moga.
2 Nzambe na ngai, na moyi, nabeleli Yo, kasi oyanoli ngai te; na butu, nabeleli lisusu, mpe natikali kovanda nye te.
Bože moj, vičem danju, al'ne odvraćaš; noću vapijem i nema mi počinka.
3 Nzokande, ozali Mosantu, ovandaka na Kiti na Yo ya Bokonzi, kati na masanzoli ya Isalaele.
A ipak, ti u Svetištu prebivaš, Nado Izraelova!
4 Batata na biso batiaki elikya na bango kati na Yo, bamipesaki epai na Yo, mpe okangolaki bango.
U tebe se očevi naši uzdaše, uzdaše se, i ti ih izbavi;
5 Bagangaki epai na Yo, mpe Yo okangolaki bango; batiaki elikya na bango kati na Yo mpe bayokisamaki soni te.
k tebi su vikali i spasavali se, u tebe se uzdali, i postidjeli se nisu.
6 Nazali lisusu moto te, kasi mutsopi; bato nyonso bazali kofinga mpe kotiola ngai.
A ja, crv sam, a ne čovjek, ruglo ljudi i naroda prezir.
7 Bato nyonso oyo bazali komona ngai bazali koseka ngai, bazali kokamwa, koningisa mito mpe koloba:
Koji me vode, podruguju se meni, razvlače usne, mašu glavom:
8 « Atiaka motema na ye epai na Yawe; tika ete Yawe abikisa ye! Tika ete Yawe akangola ye, pamba te asepelaka na Ye! »
“U Jahvu se on uzda, neka ga sad izbavi, neka ga spasi ako mu omilje!”
9 Solo, Yawe, obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai, obatelaki ngai na kimia na tolo na ye.
Iz krila majčina ti si me izveo, mir mi dao na grudima majke.
10 Wuta mbotama na ngai, batikaki ngai na maboko na Yo; wuta libumu ya mama na ngai, ozali Nzambe na ngai.
Tebi sam predan iz materine utrobe, od krila majčina ti si Bog moj.
11 Kozala mosika na ngai te, pamba te pasi ekomi pene mpe nazangi moto oyo akosunga ngai.
Ne udaljuj se od mene, blizu je nevolja, a nikog nema da mi pomogne.
12 Banguna na ngai bazingeli ngai lokola lisanga ya bangombe ya mibali, bazingeli ngai lokola banyama mabe oyo ezalaka na Bashani;
Opkoliše me junci mnogobrojni, bašanski bikovi okružiše mene.
13 mpe bafungoleli ngai makasi minoko na bango lokola nkosi oyo etomboki mpe ezali kolia nyama.
Ždrijela svoja razvaljuju na me k'o lav koji plijen kida i riče.
14 Nakomi lokola mayi oyo ezali kosopana, mpe mikuwa na ngai nyonso ekabwani; motema na ngai ekomi lokola mafuta oyo ezali konyangwama kati na ngai.
Kao voda razlih se, sve mi se kosti rasuše; srce mi posta poput voska, topi se u grudima mojim.
15 Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto, mpe nazali kokoka lisusu koloba te; otie ngai pembeni ya lilita.
Grlo je moje kao crijep suho, i moj se jezik uz nepce slijepi: u prah smrtni bacio si mene.
16 Bambwa ezingeli ngai, ngulupa ya bato mabe bayei kobundisa ngai, bazali kotambola zingazinga na ngai; bakangi maboko mpe makolo na ngai na basinga.
Opkolio me čopor pasa, rulje me zločinačke okružile. Probodoše mi ruke i noge,
17 Nakoki sik’oyo kotanga ata mikuwa na ngai nyonso; kasi bato bazali kotala mpe koseka ngai,
sve kosti svoje prebrojiti mogu, a oni me gledaju i zure na me.
18 bazali kokabola bilamba na ngai mpe kobeta zeke mpo na nzambala na ngai.
Haljine moje dijele među sobom i kocku bacaju za odjeću moju.
19 Kasi Yo, Yawe, kozala mosika te! Ozali makasi na ngai; yaka noki kosunga ngai.
Ali ti, o Jahve, daleko mi ne budi; snago moja, pohiti mi u pomoć!
20 Bikisa bomoi na ngai liboso ya mopanga, mpe kangola yango wuta na manzaka ya bambwa.
Dušu moju istrgni maču, iz šapa pasjih život moj.
21 Bikisa ngai wuta na monoko ya nkosi mpe na maseke ya mpakasa.
Spasi me iz ralja lavljih i jadnu mi dušu od rogova bivoljih!
22 Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na ngai, mpe nakokumisa Yo kati na mayangani.
A sada, braći ću svojoj naviještat' ime tvoje, hvalit ću te usred zbora.
23 Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye! Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu! Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye!
“Koji se bojite Jahve, hvalite njega! Svi od roda Jakovljeva, slavite njega! Svi potomci Izraelovi, njega se bojte!
24 Pamba te Yawe atiolaki te mpe abwakaki te mobola; apesaka ye mokongo te mpe ayokaka ye tango asengaka lisungi.
Jer nije prezreo ni zaboravio muku jadnika, i nije sakrio lice svoje od njega; kad ga je zazvao, on ga je čuo.”
25 Na ngolu na Yo, nakumisaka Yo kati na mayangani, nakokisaka bandayi na ngai na miso ya bato oyo batosaka Yo.
Zato ću te hvaliti u zboru veliku, pred vjernicima tvojim izvršit' zavjete.
26 Babola bakolia mpe bakotonda; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.
Siromasi će jesti i nasitit će se, hvalit će Jahvu koji traže njega: nek' živi srce vaše dovijeka!
27 Mokili mobimba ekokanisa Yawe, ekomipesa epai na Ye; mpe bituka nyonso ya bikolo ekogumbama liboso na Ye.
Spomenut će se i Jahvi se vratit' svi krajevi zemlje; pred njim će n§icÄe pasti sve obitelji pogana.
28 Pamba te Yawe azali Mokonzi, azali kokonza bikolo.
Jer Jahvino je kraljevstvo, on je vladar pucima.
29 Bazwi nyonso ya mokili bakolia mpe bakogumbamela Ye; bato nyonso oyo bazali kokende na kunda, ba-oyo bakoki te komibatela na bomoi, bakogumbama liboso na Ye.
Njemu će se jedinom klanjati svi koji snivaju u zemlji, pred njim se sagnuti svi koji u prah silaze. I moja će duša za njega živjeti,
30 Bakitani na bango bakosalela Yawe mpe bakopanza sango na Ye epai ya ekeke oyo ekoya na sima;
njemu će služiti potomstvo moje. O Gospodu će se pripovijedat'
31 bakosakola misala ya bosembo na Ye, epai ya bato oyo bakobotama.
slijedećem koljenu, o njegovoj pravdi naviještati narodu budućem: “Ovo učini Jahve!”

< Banzembo 22 >