< Banzembo 21 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Yawe, mokonzi azali kosepela na nguya na Yo; Tala ndenge nini elonga oyo opesi ye epesi ye esengo monene!
TO THE OVERSEER. A PSALM OF DAVID. YHWH, the king is joyful in Your strength, How greatly he rejoices in Your salvation.
2 Okokisi posa ya motema na ye mpe opimeli ye te oyo azalaki kosenga Yo.
You gave the desire of his heart to him, And You have not withheld the request of his lips. (Selah)
3 Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya. Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu.
For You put blessings of goodness before him, You set a crown of fine gold on his head.
4 Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango; opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.
He has asked for life from You, You have given length of days to him, For all time and forever.
5 Nkembo na ye ezali monene mpo na lobiko oyo opesaki ye; olatisaki ye na kongenga mpe na lokumu.
Great [is] his glory in Your salvation, You place splendor and majesty on him.
6 Solo, okomisi ye etima ya mapamboli ya seko na seko; okomisaki ye moto ya esengo na miso na Yo.
For You make him blessings forever, You cause him to rejoice with joy, By Your countenance.
7 Mokonzi atiaka elikya na Yawe, aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
For the king is trusting in YHWH, And in the kindness of the Most High he is not moved.
8 Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso; loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.
Your hand comes to all Your enemies, Your right hand finds Your haters.
9 Tango okomimonisa, okokomisa bango lokola fulu ya moto. Yawe akosilisa koboma bango na kanda na Ye, mpe moto ekozikisa bango.
You make them as a furnace of fire, At the time of Your presence. YHWH swallows them in His anger, And fire devours them.
10 Okolimwisa mabota na bango na mokili, mpe bakitani na bango, kati na bana ya bato.
You destroy their fruit from earth, And their seed from the sons of men.
11 Atako bakani kosala Yo mabe, atako basali mabongisi ya mabe mpo na kotelemela Yo, bakotikala kolonga ata moke te;
For they stretched out evil against You, They devised a wicked scheme, they do not prevail,
12 pamba te okobengana bango tango okobwakela bango bambanzi ya tolotolo na Yo.
For You make them turn their back, When You prepare Your strings against their faces.
13 Yawe, telema na nguya na Yo! Tokoyemba nguya na Yo na nzela ya banzembo.
Be exalted, O YHWH, in Your strength, We sing and we praise Your might!