< Banzembo 20 >
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Tika ete Yawe ayanola yo na tango ya pasi; tika ete Nzambe ya Jakobi azala ndako batonga makasi mpo na kobatela yo.
Да те услиши Господ у дан жалосни, да те заштити име Бога Јаковљевог.
2 Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule mpe apesa yo makasi wuta na Siona.
Да ти пошаље помоћ из светиње, и са Сиона да те поткрепи.
3 Tika ete akanisa makabo na yo nyonso mpe andima mbeka na yo ya kotumba.
Да се опомене свих приноса твојих, и жртва твоја паљеница да се нађе претила.
4 Tika ete akokisa posa ya motema na yo mpe mabongisi na yo nyonso.
Да ти да Господ по срцу твом; шта год почнеш, да ти изврши.
5 Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yo mpe tokotombola bendele na Kombo ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso.
Радоваћемо се за спасење твоје, и у име Бога свог подигнућемо заставу. Да испуни Господ све молбе твоје.
6 Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.
Сад видим да Господ чува помазаника свог; слуша га са светог неба свог; јака је десница Његова, која спасава.
7 Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar, bamosusu, kati na bampunda; kasi biso totiaka elikya na biso kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.
Једни се хвале колима, други коњима, а ми именом Господа Бога свог.
8 Bango, bafukamaka mpe bakweyaka; kasi biso, tozalaka kaka ya kotelema mpe totikalaka ngwi.
Они посрћу и падају, а ми стојимо и не колебамо се.
9 Yawe, bikisa mokonzi! Yanola biso tango tozali kobelela.
Господе! Помози цару, и услиши нас кад Те зовемо.