< Banzembo 2 >
1 Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele mpe bato bazali kosala makita ya pamba?
Зашто се буне народи и племена помишљају залудне ствари?
2 Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Yawe elongo na mopakolami na Ye.
Устају цареви земаљски, и кнезови се скупљају на Господа и на помазаника Његовог.
3 Bazali koganga elongo: « Tokata minyololo na bango mpe tomikangola na bokonzi na bango! »
"Раскинимо свезе њихове и збацимо са себе јарам њихов."
4 Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kuna na likolo aseki, Yawe atioli bango.
Онај, што живи на небесима, смеје се, Господ им се подсмева.
5 Agangeli bango na kanda, apelisi kanda makasi na Ye mpo na bango, alobi:
Па им говори у гневу свом и јарошћу својом збуњује их:
6 « Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »
"Ја сам помазао цара свог на Сиону, на светој гори својој."
7 Nakosakola mobeko ya Yawe. Alobaki na ngai: « Ozali Mwana na Ngai ya mobali, na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo.
Казаћу наредбу Господњу; Он рече мени: "Ти си син мој, ја те сад родих.
8 Senga Ngai, mpe nakokomisa bikolo libula na Yo, basuka ya mokili bozwi na Yo.
Ишти у мене, и даћу ти народе у наследство, и крајеве земаљске теби у државу.
9 Okoyangela yango na bokonzi ya ebende, okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »
Ударићеш их гвозденом палицом; разбићеш их као лончарски суд."
10 Yango wana, bino bakonzi, bozala na mayele; bino bayangeli ya mokili, boyoka likebisi oyo.
Сад, цареви, оразумите се; научите се судије земаљске!
11 Bosalela Yawe na kobanga mpe bosepela na kolenga.
Служите Господу са страхом, и радујте се с трепетом.
12 Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
Поштујте сина, да се не разгневи, и ви не изгинете на путу свом; јер ће се гнев Његов брзо разгорети. Благо свима који се у Њ уздају!