< Banzembo 17 >
1 Libondeli ya Davidi. Oh Yawe, yoka ngai! Kolela na ngai ezali sembo! Yoka koganga na ngai! Landa malamu libondeli na ngai, oyo ezali kobimela te na bibebu ya lokuta.
Une prière de David. Écoute, Yahvé, mon juste plaidoyer. Prêtez l'oreille à ma prière qui ne sort pas de lèvres trompeuses.
2 Tika ete, na mitindo na Yo, bosembo na ngai emonisama solo mpe miso na Yo emona oyo ezali alima!
Que ma sentence sorte de ta présence. Que vos yeux regardent l'équité.
3 Soki otali malamu motema na ngai, soki olandeli ngai ata na butu mpe omeki ngai, okomona ete nasalaki mabongisi ya mabe te, monoko na ngai ebukaki mobeko te.
Tu as éprouvé mon cœur. Tu m'as rendu visite dans la nuit. Vous m'avez jugé, et n'avez rien trouvé. J'ai résolu que ma bouche ne désobéirait pas.
4 Ata tango bato bamekaki kopesa ngai kanyaka, nabatelaki kaka maloba na Yo mpo ete natambola te na banzela ya bato ya masumu.
Quant aux actes des hommes, par la parole de tes lèvres, Je me suis tenu à l'écart des voies de la violence.
5 Matambe na ngai ezalaka kaka na banzela na Yo, napengwaka te.
Mes pas se sont attachés à tes sentiers. Mes pieds n'ont pas glissé.
6 Nzambe na ngai, nabelelaka Yo, pamba te oyanolaka ngai. Yoka libondeli na ngai.
J'ai fait appel à toi, car tu me répondras, Dieu. Tourne ton oreille vers moi. Écoutez mon discours.
7 Yo oyo obikisaka mpe okangolaka, na nzela ya loboko na Yo ya mobali, bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, lakisa ngai misala kitoko ya bolingo monene na Yo.
Montre ta merveilleuse bonté, toi qui sauves de leurs ennemis ceux qui se réfugient par ta droite.
8 Batela ngai lokola mbuma ya liso, bomba ngai na se ya mapapu na Yo,
Garde-moi comme la prunelle de tes yeux. Cache-moi à l'ombre de tes ailes,
9 mosika ya bato mabe oyo bazali konyokola ngai, mosika ya banguna na ngai oyo bazingeli ngai.
des méchants qui m'oppriment, mes ennemis mortels, qui m'entourent.
10 Bakomisi mitema na bango makasi, mpe bazali koloba na lolendo.
Ils ferment leurs cœurs insensibles. Avec leur bouche, ils parlent fièrement.
11 Bazali kolanda ngai, basili kozingela ngai, mpe bazali koluka ndenge nini kobwaka ngai na mabele.
Ils nous ont maintenant entourés sur nos pas. Ils se sont mis en tête de nous jeter à terre.
12 Bazali lokola nkosi oyo etondi na posa makasi ya kokanga nyama, lokola nkosi ya kanda makasi kati na ebombamelo na yango.
Il est comme un lion qui est avide de sa proie, comme un jeune lion à l'affût dans les endroits secrets.
13 Yawe, telema, kutana na bango mpe bebisa bango; na nzela ya mopanga na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe.
Lève-toi, Yahvé, confronte-le. Rejetez-le. Délivre mon âme des méchants par ton épée,
14 Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango!
des hommes par ta main, Yahvé, des hommes du monde, dont la part est dans cette vie. Vous remplissez le ventre de ceux que vous aimez. Vos fils en ont plein, et ils accumulent des richesses pour leurs enfants.
15 Mpo na ngai, sima na ngai kolonga, nakotala elongi na Yo; sima na ngai kolamuka, nakosepela na komona Yo!
Quant à moi, je verrai ta face dans la justice. Je me contenterai, à mon réveil, de voir votre forme.