< Banzembo 150 >

1 Bokumisa Yawe! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi!
你們要讚美耶和華! 在上帝的聖所讚美他! 在他顯能力的穹蒼讚美他!
2 Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye! Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo!
要因他大能的作為讚美他, 按着他極美的大德讚美他!
3 Bokumisa Ye na lokito ya kelelo; bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda!
要用角聲讚美他, 鼓瑟彈琴讚美他!
4 Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite!
擊鼓跳舞讚美他! 用絲弦的樂器和簫的聲音讚美他!
5 Bokumisa Ye na lokito ya manzanza! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene!
用大響的鈸讚美他! 用高聲的鈸讚美他!
6 Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe! Bokumisa Yawe!
凡有氣息的都要讚美耶和華! 你們要讚美耶和華!

< Banzembo 150 >