< Banzembo 147 >
1 Bokumisa Yawe! Tala ndenge ezali malamu kosanzola Nzambe na biso, mpe ndenge ezali kitoko kokumisa Ye!
Louez l'Eternel; car c'est une chose bonne de psalmodier à notre Dieu, car c'est une chose agréable; [et] la louange en est bienséante.
2 Yawe azali kotonga lisusu Yelusalemi epai wapi akosangisa bato ya Isalaele oyo bakenda na bowumbu.
L'Eternel est celui qui bâtit Jérusalem; il rassemblera ceux d'Israël qui sont dispersés çà et là.
3 Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.
Il guérit ceux qui sont brisés de cœur, et il bande leurs plaies.
4 Ayebi motango ya minzoto mpe abengaka moko na moko na kombo na yango.
Il compte le nombre des étoiles; il les appelle toutes par leur nom.
5 Nkolo na biso azali monene mpe atonda na nguya; mayele na Ye ezali na mondelo te.
Notre Seigneur est grand et d'une grande puissance, son intelligence est incompréhensible.
6 Yawe asungaka babola, kasi akitisaka bato mabe kino na mabele.
L'Eternel maintient les débonnaires, [mais] il abaisse les méchants jusqu’en terre.
7 Boyembela Yawe nzembo ya matondi! Bobetela Nzambe na biso lindanda mpo na kosanzola Ye!
Chantez à l'Eternel avec action de grâces, vous entre-répondant les uns aux autres; psalmodiez avec la harpe à notre Dieu;
8 Azipaka likolo na mapata, abongisaka mvula mpo na mokili mpe abotisaka matiti na bangomba.
Qui couvre de nuées les cieux; qui apprête la pluie pour la terre; qui fait produire le foin aux montagnes;
9 Apesaka bilei epai ya bibwele mpe epai ya bana ya yanganga oyo ezali koganga mpo na nzala.
Qui donne la pâture au bétail, et aux petits du corbeau, qui crient.
10 Asepelaka na makasi ya mpunda te mpe alingaka te nguya ya moto;
Il ne prend point de plaisir en la force du cheval; il ne fait point cas des jambières de l'homme.
11 kasi Yawe asepelaka na bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batielaka bolingo na Ye motema.
L'Eternel met son affection en ceux qui le craignent, en ceux qui s'attendent à sa bonté.
12 Yelusalemi, pesa nkembo na Yawe! Siona, kumisa Nzambe na yo!
Jérusalem, loue l'Eternel; Sion, loue ton Dieu.
13 Alendisaka bikangelo ya bikuke na yo mpe apambolaka bana na yo epai na yo.
Car il a renforcé les barres de tes portes; il a béni tes enfants au milieu de toi.
14 Atiaka kimia na etuka na yo mpe atondisaka yo na farine.
C'est lui qui rend paisibles tes contrées, et qui te rassasie de la mœlle du froment.
15 Atindaka mitindo na Ye na mokili, mpe maloba na Ye epanzanaka mbala moko!
C'est lui qui envoie sa parole sur la terre, [et] sa parole court avec beaucoup de vitesse.
16 Anokisaka mvula ya pembe lokola bapwale ya meme mpe apanzaka mvula ya mabanga lokola putulu;
C'est lui qui donne la neige comme [des flocons] de laine, et qui répand la bruine comme de la cendre.
17 akweyisaka mabanga ya mvula yango lokola mabanga ya mike-mike; nani akoki kotelema na malili na yango?
C'est lui qui jette sa glace comme par morceaux; et qui est-ce qui pourra durer devant sa froidure?
18 Soki kaka atindi liloba, malili ekomaka kosila moke-moke; mpe soki atindi mopepe, mayi ekomaka kotiola.
Il envoie sa parole, et les fait fondre; il fait souffler son vent, [et] les eaux s'écoulent.
19 Asakolaki liloba na Ye epai ya Jakobi, mibeko mpe malako na Ye epai ya Isalaele.
Il déclare ses paroles à Jacob, et ses statuts et ses ordonnances à Israël.
20 Asalaki bongo na ekolo ata moko te; boye eyebaka mpe mibeko na Ye te. Bokumisa Yawe!
Il n'a pas fait ainsi à toutes les nations, c'est pourquoi elles ne connaissent point ses ordonnances. Louez l'Eternel.