< Banzembo 145 >

1 Masanzoli. Nzembo ya Davidi. Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai; nakopambola Kombo na Yo seko na seko.
I PAN kapina komui, ai Kot o Nanmarki, o kapina mar omui anjau karoj kokolata.
2 Mikolo nyonso, nakopambola Yo mpe nakokumisa Kombo na Yo libela na libela.
I pan kapina komui ni ran akan karoj, o kapina mar omui anjau kan karoj kokolata.
3 Yawe azali monene, abongi na lokumu; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.
Ieowa meid lapalap, o kapina pan, o jota me kak dedeki duen a lapalap.
4 Bikeke nyonso ekotombola kitoko ya misala na Yo mpe ekopanza sango ya misala na Yo ya minene.
Jeri en jeri kan pan kapina omui dodok kan, o kajokajoi duen omui manaman.
5 Nakolemba te kotatola bikamwa na Yo mpe kongenga makasi ya nkembo na Yo.
I pan kajokajoia duen linan en omui kapwat, o i pan kaulki duen omui manaman akan.
6 Bakolobela nguya na Yo ya somo, mpe ngai, nakosakola misala na Yo ya minene.
O re pan kajokajoia duen manaman en omui dodok kan, o pan kapakaparok duen omui lapalap.
7 Bakokanisa misala minene ya bolamu na Yo, bakobetela bosembo na Yo maboko.
Irail pan kajokajoia duen omui kalanan lapalap, o pere peren o kapina duen omui pun.
8 Yawe atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo.
Ieowa me dir en mak o kapunlol, kanonama o limpok.
9 Yawe azali malamu mpo na bato nyonso, atonda na mawa mpo na bikelamu na Ye nyonso.
Ieowa me kalanan on karoj o a kapunlol on a wiawia kau karoj.
10 Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo! Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo!
Japwilim omui wiawia kan en kapina komui. Main Ieowa, o japwilim omui lelapok kan en kapina komui.
11 Bazali koloba ete bokonzi na Yo etondi na nkembo mpe bazali kopanza sango ya misala ya nguya na Yo.
O ren kajokajoia duen linan en wei omui, o ren kapaka parokki duen omui manaman.
12 Bazali koyebisa bato misala na Yo ya minene mpe kongenga ya nkembo ya bokonzi na Yo.
Pwe aramaj akan en dedeki duen omui manaman o linan on wei omui.
13 Ozali Mokonzi seko na seko, mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso, asalaka nyonso na bolingo.
Wei omui wei joutuk eu, o omui kakaun pan duedueta kokolata.
14 Yawe alendisaka bato nyonso oyo bakweyaka, atelemisaka bato nyonso oyo balembaka.
Ieowa kin kotin kolekol karoj, me pan pupedi, o kainjeu maula karoj, me mamauk.
15 Na bato nyonso oyo batalelaka Yo, opesaka bilei na tango oyo ekoki.
Por en maj karoj kajikajik komui, o kom kotiki on ir kan ar kijin mana ni ar anjau.
16 Ofungolaka loboko na Yo mpe okokisaka posa ya nyonso oyo ezali na bomoi.
Kom kotiki pajan Lim omui o kadirela karoj, me memaur, duen kupur omui.
17 Yawe azali sembo na nyonso oyo asalaka mpe atonda na bolingo kati na misala na Ye nyonso.
Ieowa me pun ni al karoj o jaraui ni a wiawia kan karoj.
18 Yawe azali pene ya bato nyonso oyo babelelaka Ye, ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo;
Ieowa kotikot ren karoj, me likwir on i, karoj, me likwir melel.
19 akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye, ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye.
A kotin wiai on, me majak i duen ar inon. A kotin mani ar nidinid, ap kotin jauaja ir.
20 Yawe abatelaka bato nyonso oyo balingaka Ye, kasi abebisaka bato nyonso ya mabe.
Ieowa kin kotin jinjila karoj, me pok on i, a pan kamela me doo jan Kot akan karoj.
21 Tika ete monoko na ngai ekumisa Yawe! Tika ete bikelamu nyonso epambola Kombo na Ye ya bule libela na libela!
Au ai pan kapina Ieowa, o uduk karoj kapina mar a jaraui anjau kan karoj kokolata.

< Banzembo 145 >