< Banzembo 144 >

1 Nzembo ya Davidi. Tika ete Yawe, Libanga na ngai, apambolama; Ye oyo akembisaka maboko mpe makofi na ngai mpo na bitumba!
زەبوورێکی داود. ستایش بۆ یەزدان، تاشەبەردی من، ئەوەی مەشق بە دەستم دەکات بۆ شەڕ، پەنجەکانم بۆ جەنگ.
2 Azali bolingo na ngai mpe ndako na ngai ya makasi, ebombamelo mpe mokangoli na ngai, nguba mpe ekimelo na ngai; Ye nde atiaka bato na ngai na se ya bokonzi na ngai.
ئەو خودای خۆشەویستم و قەڵامە، پەناگا و دەربازکەرە بۆم، قەڵغانمە و پشتم بەو بەستووە، ئەوەی گەلەکانی خستووەتە ژێر ڕکێفم.
3 Oh Yawe, moto nde nani mpo ete obatelaka ye? Moto nde nani mpo ete okanisaka ye?
ئەی یەزدان، مرۆڤ چییە هەتا گرنگی پێبدەیت؟ کوڕی مرۆڤ چییە هەتا تۆ بیری لێ بکەیتەوە؟
4 Moto azali lokola mopepe, mikolo ya bomoi na ye ezali lokola elili oyo ezali koleka.
مرۆڤ لە هەناسەیەک دەچێت، ڕۆژگاریشی وەک سێبەرێکی تێپەڕیوە.
5 Yawe, fungola likolo mpe kita awa na mabele! Yaka kosimba bangomba mpe sala ete ebimisa milinga!
ئەی یەزدان، ئاسمانەکەت لێکبکەوە و وەرە خوارەوە، دەست بدە چیاکان و دووکەڵ دەکەن.
6 Tinda mikalikali mpe panza banguna na ngai; bwakela bango makonga na Yo mpe bungisa bango nzela.
چەخماخە بدە و دوژمنەکانم پەرت بکە، تیرت تێگرە و بیانبەزێنە.
7 Tanda loboko na Yo wuta kuna na likolo mpo na kobikisa mpe kokangola ngai na mayi minene, na maboko ya bapaya
لە بەرزاییەوە دەستت درێژ بکە، فریام بکەوە و دەربازم بکە، لە ئاوی زۆر و لە دەستی بێگانە،
8 oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.
ئەوانەی بە دەم درۆ دەکەن، سوێندخواردنیان ساختەیە.
9 Oh Nzambe, nakoyembela Yo nzembo ya sika, nakobetela Yo lindanda ya basinga zomi.
ئەی خودایە، گۆرانییەکی نوێت بۆ دەڵێم، بە قیسارەی دە ژێیی مۆسیقات بۆ دەژەنم،
10 Ezali Yo, Nzambe, nde opesaka bakonzi elonga, obikisaka Davidi, mosali na Yo, liboso ya mopanga oyo ebomaka.
بۆ ئەوەی ڕزگاری دەدات بە پاشایان، ئەوەی داودی بەندەی خۆی لە شمشێری بەدکار دەرباز دەکات.
11 Bikisa mpe kangola ngai na maboko ya bapaya oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.
دەربازم بکە و لە دەست بێگانە فریام بکەوە، ئەوانەی بە دەم درۆ دەکەن، سوێندخواردنیشیان ساختەیە.
12 Bana mibali na biso bazali lokola milona, bazali kokola malamu wuta na bomwana na bango; bana basi na biso bazali lokola bililingi kitoko oyo batoboli na bamir ya ndako ya mokonzi.
ئیتر کوڕەکانمان لە سەردەمی لاویێتییان وەک نەمامی گەشەکردوو دەبن، کچەکانمان وەک ستونی داتاشراوی گۆشەی کۆشک دەبن.
13 Bibombelo na biso etondi na biloko ya ndenge na ndenge; bameme na biso ezali kobotana na minkoko, na bankoto zomi kati na bitonga na biso;
ئەمبارەکانمان پڕ دەبن لە هەموو جۆرە دانەوێڵەیەک، مەڕەکانمان یەکە و هەزار و بە دەیان هەزار دەبن لەناو کێڵگەکانمان،
14 bangombe na biso ezali minene; likama ezali te, zemi ezali kosopana te, mpe koganga moko te ya pasi ezali koyokana na bisika na biso.
گایەکانمان باری قورس ڕادەکێشن. بێ شکانی شوورا و بێ ڕاپێچکردن، شەقامەکانمان هاواری تەنگانەیان لێ نایێت!
15 Esengo na bato oyo batondisami na bolamu ya boye! Esengo na bato oyo Yawe azali Nzambe na bango!
خۆزگە دەخوازرێ بەو گەلەی ئاوای بۆ ببێت، خۆزگە دەخوازرێ بەو گەلەی یەزدان خودایانە.

< Banzembo 144 >