< Banzembo 143 >
1 Nzembo ya Davidi. Yawe, yoka losambo na ngai, landa mabondeli na ngai! Yanola ngai na boyengebene mpe na bosembo na Yo.
A Psalm of David. O LORD, hear my prayer. In Your faithfulness, give ear to my plea; in Your righteousness, answer me.
2 Kosambisa mosali na Yo te, pamba te moto moko te ya bomoi azali sembo liboso na Yo.
Do not bring Your servant into judgment, for no one alive is righteous before You.
3 Monguna azali konyokola ngai, azali kosakana na bomoi, azali kosala ete navanda kati na molili lokola bato oyo bakufa na tango ya kala.
For the enemy has pursued my soul, crushing my life to the ground, making me dwell in darkness like those long since dead.
4 Molimo na ngai elembi kati na ngai, motema na ngai emitungisi kati na ngai.
My spirit grows faint within me; my heart is dismayed inside me.
5 Nakanisi mikolo ya kala, namilobeli nyonso oyo osala, nakanisi malamu mosala ya maboko na Yo.
I remember the days of old; I meditate on all Your works; I consider the work of Your hands.
6 Nasemboli maboko na ngai epai na Yo; nakomi komimona lokola mabele ya kokawuka.
I stretch out my hands to You; my soul thirsts for You like a parched land.
7 Yawe, zongisela ngai eyano noki! Molimo na ngai ezali kolemba. Kopesa ngai mokongo te, noki te nakozala lokola bato oyo bazali kokita na libulu.
Answer me quickly, O LORD; my spirit fails. Do not hide Your face from me, or I will be like those who descend to the Pit.
8 Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo, pamba te natia elikya na ngai kati na Yo. Lakisa ngai nzela ya kolanda, pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.
Let me hear Your loving devotion in the morning, for I have put my trust in You. Teach me the way I should walk, for to You I lift up my soul.
9 Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya banguna na ngai! Nazali koluka ebombamelo epai na Yo.
Deliver me from my enemies, O LORD; I flee to You for refuge.
10 Lakisa ngai kosala mokano na Yo, pamba te ozali Nzambe na ngai. Tika ete Molimo malamu na Yo atambolisa ngai na mabele oyo ezanga mabaku!
Teach me to do Your will, for You are my God. May Your good Spirit lead me on level ground.
11 Yawe, mpo na lokumu ya Kombo na Yo, bikisa bomoi na ngai! Na bosembo na Yo, longola bomoi na ngai kati na pasi.
For the sake of Your name, O LORD, revive me. In Your righteousness, bring my soul out of trouble.
12 Na bolingo na Yo, kanga minoko ya banguna na ngai mpe limwisa bayini na ngai nyonso, pamba te nazali mosali na Yo.
And in Your loving devotion, cut off my enemies. Destroy all who afflict me, for I am Your servant.