< Banzembo 141 >
1 Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo; yaka noki epai na ngai! Yoka mongongo na ngai, wana nazali kobelela Yo!
A psalm of David. Lord, I'm calling out to you! Please hurry up and help me! Please listen to me when I cry out to you!
2 Liboso na Yo, tika ete libondeli na ngai ezala lokola mbeka ya malasi, mpe botombwami ya maboko na ngai ezala lokola mbeka ya pokwa!
May my prayer be like incense before you, my uplifted hands like an evening offering.
3 Yawe, kengela monoko na ngai, batela malamu ekuke ya bibebu na ngai!
Lord, make sure I don't say anything I shouldn't—keep a watch over my conversations.
4 Kotindika motema na ngai te na mabe, mpo ete namipesa te na mobulu elongo na bato ya misala mabe mpe nalia bilei te elongo na bango.
Don't let me think about evil things or take part in doing anything wrong with wicked people. I won't join in eating fancy food at their feasts.
5 Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.
Let a good person punish me in love—let them correct me. It will be like an anointing—I won't refuse it. But I still pray against those who do evil.
6 Tika ete bilombe na bango babwakama na mabanga; na bongo, maloba na ngai ekoyokana, pamba te ezali kitoko.
They shall be thrown down by the power of the rock that judges them, and then they will recognize what I said was true!
7 Lokola tango babalolaka mpe batimolaka mabele, mikuwa na biso epanzani liboso ya mboka ya bakufi. (Sheol )
Just as the earth is broken up by the plough, so shall their bones be scattered at the mouth of Sheol. (Sheol )
8 Yawe, Nkolo na ngai, miso na ngai ebaluki mpo na kotala Yo; nazali kobombama kati na Yo, kotindika ngai na kufa te!
But I'm looking to you, Lord God, for I find protection in you. Don't let me die!
9 Batela ngai mpo ete nakangama te na motambo na bango mpe nakweya te na mabulu ya bato ya misala mabe.
Keep me safe from the traps they have set to catch me, from the snares of evil people.
10 Tika ete bato mabe bakangama na mitambo na bango moko, mpe ete ngai naleka na kimia!
Let them fall into their own traps while I pass by unharmed.