< Banzembo 140 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe! Kokutanisa ngai te na bato na kanza.
Müzik şefi için - Davut'un mezmuru Ya RAB, kurtar beni kötü insandan, Koru beni zorbadan.
2 Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.
Onlar yüreklerinde kötülük tasarlar, Savaşı sürekli körükler,
3 Bapelisaka lolemo na bango lokola nyoka, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.
Yılan gibi dillerini bilerler, Engerek zehiri var dudaklarının altında. (Sela)
4 Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe; kokutanisa ngai te na bato na kanza oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai!
Ya RAB, sakın beni kötünün elinden, Koru beni zorbadan; Bana çelme takmayı tasarlıyorlar.
5 Bato ya lofundu batieli ngai mitambo, batandi basinga ya minyama na nzela mpe batimoli mabulu mpo na kokanga ngai.
Küstahlar benim için tuzak kurdu, Haydutlar ağ gerdi; Yol kenarına kapan koydular benim için. (Sela)
6 Nalobaka na Yawe: « Ozali Nzambe na ngai! » Yawe, yoka mabondeli na ngai.
Sana diyorum, ya RAB: “Tanrım sensin.” Yalvarışıma kulak ver, ya RAB.
7 Oh Yawe, Nkolo na ngai, ozali makasi ya lobiko na ngai, obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.
Ey Egemen RAB, güçlü kurtarıcım, Savaş gününde başımı korudun.
8 Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe, kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.
Kötülerin dileklerini yerine getirme, ya RAB, Tasarılarını ileri götürme! Yoksa gurura kapılırlar. (Sela)
9 Tika ete pasi oyo bibebu na bango esili kobongisa ekweyela bato oyo bazingeli ngai.
Beni kuşatanların başını, Dudaklarından dökülen fesat kaplasın.
10 Tika ete makala ya moto esopanela bango! Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto, kati na mabulu ya potopoto epai wapi bakokoka kotelema lisusu te!
Kızgın korlar yağsın üzerlerine! Ateşe, dipsiz çukurlara atılsınlar, Bir daha kalkamasınlar.
11 Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.
İftiracılara ülkede hayat kalmasın, Felaket zorbaları amansızca avlasın.
12 Nayebi ete Yawe akotaka makambo ya babola mpe alongisaka bato oyo bakelela.
Biliyorum, RAB mazlumun davasını savunur, Yoksulları haklı çıkarır.
13 Solo, bato ya sembo bakosanzola Kombo na Yo, bato ya alima bakovanda liboso na Yo.
Kuşkusuz doğrular senin adına şükredecek, Dürüstler senin huzurunda oturacak.

< Banzembo 140 >