< Banzembo 14 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Bazoba bamilobelaka: « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo ya nkele, mpe moko te asalaka bolamu.
[For the Chief Musician. By David.] The fool has said in his heart, "There is no God." They are corrupt. They do abominable works. There is none who does good.
2 Wuta na Likolo, Yawe atalaka bato mpo na koluka koyeba soki ezali ata na moko oyo azali na mayele, oyo atalelaka Nzambe.
The LORD looks down from heaven on the descendants of Adam, to see if there are any who are wise, who seek after God.
3 Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te!
They have all turned away. They have together become corrupt. There is no one who does good, no, not one.
4 Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te!
Have all evildoers no knowledge, who eat up my people as they eat bread? They do not call on the LORD.
5 Somo monene ekangi bango, pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.
There they are utterly terrified, for God is in the generation of the righteous.
6 Bino, bato ya misala mabe, bobebisaka mabongisi ya mobola kasi Yawe azali ebombamelo na ye.
You would frustrate the plans of the lowly, but the LORD is his refuge.
7 Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona! Tango Yawe akobongisa bato na Ye, bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.
Oh that the salvation of Israel would come out of Zion. When the LORD restores the fortunes of his people, may Jacob rejoice, may Israel be glad.

< Banzembo 14 >